< 詩篇 79 >

1 ああ神よもろもろの異邦人はなんぢの嗣業の地ををかし なんぢの聖宮をけがしヱルサレムをこぼちて礫堆となし
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga!
2 なんぢの僕のしかばねをそらの鳥に與へて餌となし なんぢの聖徒の肉を地のけものにあたへ
Bapesi bibembe ya basali na Yo lokola bilei epai ya bandeke ya likolo, mpe bibembe ya bayengebene na Yo epai ya banyama ya zamba;
3 その血をヱルサレムのめぐりに水のごとく流したりされど之をはうむる人なし
basopi makila na bango lokola mayi zingazinga ya Yelusalemi, mpe moto ya kokunda bango azalaki te!
4 われらは隣人にそしられ四周のひとびとに侮られ嘲けらるるものとなれり
Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango!
5 ヱホバよ斯て幾何時をへたまふや 汝とこしへに怒たまふや なんぢのねたみは火のごとく燃るか
Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto?
6 願くはなんぢを識ざることくにびと聖名をよばざるもろもろの國のうへに烈怒をそそぎたまへ
Sopela bikolo oyo eyebi Yo te mpe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te, kanda makasi na Yo;
7 かれらはヤコブを呑その住處をあらしたればなり
pamba te babebisi Jakobi mpe bapanzi mokili na ye.
8 われらにむかひて先祖のよこしまなるわざを記念したまふなかれ願くはなんぢの憐憫をもて速かにわれらを迎へたまへ われらは貶されて甚だしく卑くなりたればなり
Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka!
9 われらのすくひの神よ名のえいくわうのために我儕をたすけ名のためにわれらを救ひ われらの罪をのぞきたまへ
Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola biso mpe limbisa masumu na biso mpo na Kombo na Yo!
10 いかなれば異邦人はいふ かれらの神はいづくにありやと 願くはなんぢの僕等がながされし血の報をわれらの目前になして異邦人にしらしめたまへ
Mpo na nini bikolo eloba: « Nzambe na bango azali wapi? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.
11 ねがはくは汝のみまへにとらはれびとの嘆息のとどかんことを なんぢの大なる能力により死にさだめられし者をまもりて存へしめたまへ
Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa!
12 主よわれらの隣人のなんぢをそしりたる謗を七倍ましてその懐にむくいかへしたまへ
Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo; zongisela bango mbala sambo.
13 然ばわれらなんぢの民なんぢの草苑のひつじは永遠になんぢに感謝しその頌辭を世々あらはさん
Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.

< 詩篇 79 >