< 詩篇 67 >
1 ねがはくは神われらをあはれみ われらをさきはひてその聖顔をわれらのうへに照したまはんことを (セラ)
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi: nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye;
2 此はなんぢの途のあまねく地にしられ なんぢの救のもろもろの國のうちに知れんがためなり
mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
3 かみよ庶民はなんぢに感謝し もろもろの民はみな汝をほめたたへん
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo!
4 もろもろの國はたのしみ又よろこびうたふべし なんぢ直をもて庶民をさばき地のうへなる萬の國ををさめたまべければなり (セラ)
Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele.
5 神よたみらはなんぢに感謝し もろもろの民はみな汝をほめたたへん
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo!
6 地は產物をいだせり 神わが神はわれらを福ひたまはん
Mabele eboti bambuma na yango; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
7 神われらをさきはひたまふべし かくて地のもろもろの極ことごとく神をおそれん
Tika ete Nzambe apambola biso; tika ete mokili mobimba etosa Ye!