< 詩篇 58 >

1 なんぢら默しゐて義をのべうるか 人の子よなんぢらなほき審判をおこなふや
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi. Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo? Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo?
2 否なんぢらは心のうちに惡事をおこなひ その手の強暴をこの地にはかりいだすなり
Te, ezala kati na mitema na bino, bosalaka mabongisi ezanga bosembo; botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.
3 あしきものは胎をはなるるより背きとほざかり生れいづるより迷ひていつはりをいふ
Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.
4 かれらの毒は蛇のどくのごとし かれらは蠱術をおこなふものの甚たくみにまじなふその聲をだにきかざる耳ふさぐ聾ひの蝮のごとし
Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka, lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te, oyo ekangaka litoyi na yango,
5 かれらの毒は蛇のどくのごとし かれらは蠱術をおこなふものの甚たくみにまじなふその聲をだにきかざる耳ふさぐ聾ひの蝮のごとし
oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.
6 神よかれらの口の歯ををりたまヘ ヱホバよ壯獅の牙をぬきくだきたまへ
Nzambe, buka minu na bango kati na minoko na bango; Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.
7 願くはかれらを流れゆく水のごとくに消失しめ その矢をはなつときは折れたるごとくなし給はんことを
Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola; Tika ete bambanzi na bango ebukana tango babetaka batolotolo.
8 また融てきえゆく蝸牛のごとく婦のときならず產たる目をみぬ嬰のごとくならしめ給へ
Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.
9 なんぢらの釜いまだ荊蕀の火をうけざるさきに靑をも燃たるをもともに狂風にて吹さりたまはん
Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.
10 義者はかれらが讎かへさるるを見てよろこび その足をあしきものの血のなかにてあらはん
Moto ya sembo akosepela, pamba te akomona Nzambe kozongisela bato mabe, mabe na mabe, mpe akotambola kati na makila na bango.
11 かくて人はいふべし實にただしきものに報賞あり實にさばきをほどこしたまふ神はましますなりと
Mpe bato bakoloba: « Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo; solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »

< 詩篇 58 >