< 詩篇 55 >

1 神よねがはくは耳をわが祈にかたぶけたまへ わが懇求をさけて身をかくしたまふなかれ
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
2 われに聖意をとめ 我にこたへたまへ われ歎息によりてやすからず悲みうめくなり
Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,
3 これ仇のこゑと惡きものの暴虐とのゆゑなり そはかれら不義をわれに負せ いきどほりて我におひせまるなり
mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
4 わが心わがうちに憂ひいたみ死のもろもろの恐懼わがうへにおちたり
Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.
5 おそれと戰慄とわれにのぞみ甚だしき恐懼われをおほへり
Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.
6 われ云ねがはくは鴿のごとく羽翼のあらんことを さらば我とびさりて平安をえん
Nakomi komilobela: « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi;
7 みよ我はるかにのがれさりて野にすまん (セラ)
nalingaki kokima mosika penza, mpo na kokende kovanda ata na esobe.
8 われ速かにのがれて暴風と狂風とをはなれん
Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
9 われ都のうちに強暴とあらそひとをみたり 主よねがはくは彼等をほろぼしたまへ かれらの舌をわかれしめたまへ
Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.
10 彼等はひるもよるも石垣のうへをあるきて邑をめぐる 邑のうちには邪曲とあしき企圖とあり
Butu mpe moyi, ezali kotambola na bamir na yango; misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
11 また惡きこと邑のうちにあり しへたげと欺詐とはその街衢をはなるることなし
Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
12 われを謗れるものは仇たりしものにあらず もし然りしならば尚しのばれしなるべし 我にむかひて己をたかくせし者はわれを恨たりしものにあらず若しかりしならば身をかくして彼をさけしなるべし
Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
13 されどこれ汝なり われとおなじきもの わが友われと親しきものなり
Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema
14 われら互にしたしき語らひをなし また會衆のなかに在てともに神の家にのぼりたりき
oyo nazalaki kokabola elongo na yo, pasi mpe basekele tango tozalaki kokende nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
15 死は忽然かれらにのぞみ その生るままにて陰府にくだらんことを そは惡事その住處にありその中にあればなり (Sheol h7585)
Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango. (Sheol h7585)
16 されど我はただ神をよばんヱホバわれを救ひたまふべし
Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.
17 夕にあしたに晝にわれなげき且かなしみうめかん ヱホバわが聲をききたまふべし
Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.
18 ヱホバは我をせむる戰闘よりわが霊魂をあがなひいだして平安をえしめたまへり そはわれを攻るもの多かりければなり
Akopesa ngai kimia, akokangola ngai na bitumba oyo babundisaka ngai; pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
19 太古よりいます者なる神はわが聲をききてかれらを惱めたまべし (セラ) かれらには變ることなく神をおそるることなし
Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.
20 かの人はおのれと睦みをりしものに手をのべてその契約をけがしたり
Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
21 その口はなめらかにして乳酥のごとくなれどもその心はたたかひなり その言はあぶらに勝りてやはらかなれどもぬきたる劍にことならず
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
22 なんぢの荷をヱホバにゆだねよさらば汝をささへたまはん ただしき人のうごかさるることを常にゆるしたまふまじ
Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
23 かくて神よなんぢはかれらを亡の坑におとしいれたまはん血をながすものと詭計おほきものとは生ておのが日の半にもいたらざるべし 然はあれどわれは汝によりたのまん
Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila mpe bakosi kati na libulu ya libebi; bakokokisa ata kati-kati te ya mikolo ya bomoi na bango. Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.

< 詩篇 55 >