< 詩篇 39 >

1 われ曩にいへり われ舌をもて罪ををかさざらんために我すべての途をつつしみ惡者のわがまへに在るあひだはわが口に衝をかけんと
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Namilobelaki: « Nakosala keba na etamboli na ngai mpo ete monoko na ngai esala masumu te; nakobatela penza monoko na ngai tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »
2 われ默して唖となり善言すらことばにいださず わが憂なほおこれり
Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye, natikalaki koloba ata likambo moko te; pasi na ngai ebakisamaki makasi.
3 わが心わがうちに熱し おもひつづくるほどに火もえぬればわれ舌をもていへらく
Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
4 ヱホバよ願くはわが終とわが日の數のいくばくなるとを知しめたまへ わが無常をしらしめたまへ
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
5 觀よなんぢわがすべての日を一掌にすぎさらしめたまふ わがかいのち主前にてはなきにことならず 實にすべての人は皆その盛時だにもむなしからざるはなし (セラ)
Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
6 人の世にあるは影にことならず その思ひなやむことはむなしからざるなし その積蓄ふるものはたが手にをさまるをしらず
Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
7 主よわれ今なにをかまたん わが望はなんぢにあり
Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini? Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
8 ねがはくは我ぞすべて愆より助けいだしたまへ 愚なるものに誹らるることなからしめたまへ
Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.
9 われは默して口をひらかず 此はなんぢの成したまふ者なればなり
Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.
10 願くはなんぢの責をわれよりはなちたまへ 我なんぢの手にうちこらさるるによりて亡ぶるばかりになりぬ
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
11 なんぢ罪をせめて人をこらし その慕ひよろこぶところのものを蠧のくらふがごとく消うせしめたまふ 實にもろもろの人はむなしからざるなし (セラ)
Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
12 ああヱホバよねがはくはわが祈をきき わが號呼に耳をかたぶけたまへ わが涙をみて默したまふなかれ われはなんぢに寄る旅客すべてわが列祖のごとく宿れるものなり
Yawe, yoka libondeli na ngai; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
13 我ここを去てうせざる先になんぢ面をそむけてわれを爽快ならしめたまへ
Kotala ngai te mpo ete nasepela lisusu, liboso ete nakende na ngai mpe nazala lisusu te.

< 詩篇 39 >