< 詩篇 29 >

1 なんぢら神の子らよ ヱホバに獻げまつれ榮と能とをヱホバにささげまつれ
Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.
2 その名にふさはしき榮光をヱホバにささげ奉れ きよき衣をつけてヱホバを拝みまつれ
Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.
3 ヱホバのみこゑは水のうへにあり えいくわうの神は雷をとどろかせたまふ ヱホバは大水のうへにいませり
Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
4 ヱホバの聲はちからあり ヱホバのみこゑは稜威あり
Mongongo ya Yawe ezali na nguya; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
5 ヱホバのみこゑは香柏ををりくだく ヱホバ、レバノンのかうはくを折くだきたまふ
Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.
6 これを犢のごとくをどらせレバノンとシリオンとをわかき野牛のごとくをどらせたまふ
Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.
7 ヱホバのみこゑは火焔をわかつ
Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto.
8 ヱホバのみこゑは野をふるはせヱホバはカデシの野をふるはせたまふ
Mongongo ya Yawe elengisaka esobe; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.
9 ヱホバのみこゑは鹿に子をうませ また林木をはだかにす その宮にあるすべてのもの呼はりて榮光なるかなといふ
Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka: « Nkembo! »
10 ヱホバは洪水のうへに坐したまへり ヱホバは寳座にざして永遠に王なり
Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.
11 ヱホバはその民にちからをあたへたまふ 平安をもてその民をさきはひたまはん
Yawe apesaka bato na Ye makasi; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.

< 詩篇 29 >