< 詩篇 18 >

1 ヱホバわれの力よ われ切になんぢを愛しむ
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
2 ヱホバはわが巌 わが城 われをすくふ者 わがよりたのむ神 わが堅固なるいはほ わが盾 わがすくひの角 わがたかき櫓なり
Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.
3 われ讃稱ふべきヱホバをよびて仇人よりすくはるることをえん
Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
4 死のつな我をめぐり惡のみなぎる流われをおそれしめたり
Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.
5 陰間のなは我をかこみ死のわな我にたちむかへり (Sheol h7585)
Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai. (Sheol h7585)
6 われ窮苦のうちにありてヱホバをよび又わが神にさけびたり ヱホバはその宮よりわが聲をききたまふ その前にてわがよびし聲はその耳にいれり
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
7 このときヱホバ怒りたまひたれば地はふるひうごき山の基はゆるぎうごきたり
Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
8 烟その鼻よりたち火その口よりいでてやきつくし炭はこれがために燃あがれり
Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
9 ヱホバは天をたれて臨りたまふ その足の下はくらきこと甚だし
Yawe afungolaki Lola mpe akitaki; mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
10 かくてケルブに乗りてとび風のつばさにて翔り
Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
11 闇をおほひとなし水のくらきとそらの密雲とをそのまはりの幕となしたまへり
Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.
12 そのみまへの光輝よりくろくもをへて雹ともえたる炭とふりきたれり
Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.
13 ヱホバは天に雷鳴をとどろかせたまへり 至上者のこゑいでて雹ともえたる炭とふりきたり
Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.
14 ヱホバ矢をとばせてかれらを打ちらし數しげき電光をはなちてかれらをうち敗りたまへり
Abwakaki makonga na Ye mpe atindaki yango na bangambo nyonso; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
15 ヱホバよ斯るときになんぢの叱咤となんぢの鼻のいぶきとによりて水の底みえ地の基あらはれいでたり
Yawe, tango ogangelaki yango, na nzela ya pema na Yo mpe ya milinga ya zolo na Yo, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, miboko ya mokili emonanaki na libanda.
16 ヱホバはたかきより手をのべ我をとりて大水よりひきあげ
Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi;
17 わがつよき仇とわれを憎むものとより我をたすけいだしたまへり かれらは我にまさりて最強かりき
akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
18 かれらはわが災害の日にせまりきたれり 然どヱホバはわが支柱となりたまひき
Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
19 ヱホバはわれを悦びたまふがゆゑにわれをたづさへ廣處にだして助けたまへり
Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
20 ヱホバはわが正義にしたがひて恩賜をたまひ わが手のきよきにしたがひて報賞をたれたまへり
Yawe asaleli ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai;
21 われヱホバの道をまもり惡をなしてわが神よりはなれしことなければなり
pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
22 そのすべての審判はわがまへにありて われその律法をすてしことなければなり
Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
23 われ神にむかひて缺るところなく己をまもりて不義をはなれたり
Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
24 この故にヱホバはわがただしきとその目前にわが手のきよきとにしたがひて我にむくいをなし給へり
Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.
25 なんぢ憐憫あるものには憐みあるものとなり完全ものには全きものとなり
Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
26 きよきものには潔きものとなり僻むものにはひがむ者となりたまふ
Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
27 そは汝くるしめる民をすくひたまへど高ぶる目をひくくしたまふ可ればなり
Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.
28 なんぢわが燈火をともし給ふべければなり わが神ヱホバわが暗をてらしたまはん
Yawe, Nzambe na ngai, Yo nde opelisaka mwinda na ngai; obongolaka molili na ngai pole.
29 我なんぢによりて軍の中をはせとほり わが神によりて垣ををどりこゆ
Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
30 神はしもその途またくヱホバの言はきよし ヱホバはすべて依賴むものの盾なり
Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
31 そはヱホバのほかに神はたれぞや われらの神のほかに巌はたれぞや
Nani azali Nzambe soki Yawe te? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te?
32 神はちからをわれに帶しめ わが途を全きものとなしたまふ
Nzambe apesaka ngai makasi mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka;
33 神はわが足を麀のあしのごとくし我をわが高處にたたせたまふ
akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko, mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo;
34 神はわが手をたたかひにならはせてわが臂に銅弓をひくことを得しめたまふ
alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
35 又なんぢの救の盾をわれにあたへたまへり なんぢの右手われをささへなんぢの謙卑われを大ならしめたまへり
Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
36 なんぢわが歩むところを寛濶ならしめたまひたれば わが足ふるはざりき
Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
37 われ仇をおひてこれに追及かれらのほろぶるまでは歸ることをせじ
Nalandaka banguna na ngai, mpe nakangaka bango; nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
38 われかれらを撃てたつことを得ざらしめん かれらはわが足の下にたふるべし
Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
39 そはなんぢ戰爭のために力をわれに帶しめ われにさからひておこりたつ者をわが下にかがませたまひたればなり
Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
40 我をにくむ者をわが滅しえんがために汝またわが仇の背をわれにむけしめ給へり
Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
41 かれら叫びたれども救ふものなく ヱホバに對ひてさけびたれども答へたまはざりき
Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
42 我かれらを風のまへの塵のごとくに搗碎き ちまたの坭のごとくに打棄たり
Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
43 なんぢわれを民のあらそひより助けいだし我をたててもろもろの國の長となしたまへり わがしらざる民われにつかへん
Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
44 かれらわが事をききて立刻われにしたがひ異邦人はきたりて佞りつかへん
Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai; mpe bapaya bayaka mpo ete nasepela na bango.
45 ことくにびとは衰へてその城よりをののきいでん
Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
46 ヱホバは活ていませり わが磐はほむべきかな わがすくひの神はあがむべきかな
Longonya na Yawe! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama! Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama!
47 わがために讎をむくい異邦人をわれに服はせたまふはこの神なり
Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
48 神はわれを仇よりすくひたまふ實になんぢは我にさからひて起りたつ者のうへに我をあげ あらぶる人より我をたすけいだし給ふ
oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
49 この故にヱホバよ われもろもろの國人のなかにてなんぢに感謝し なんぢの名をほめうたはん
Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
50 ヱホバはおほいなる救をその王にあたへ その受膏者ダビデとその裔とに世々かぎりなく憐憫をたれたまふ
Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe epai ya libota na ye, mpo na libela.

< 詩篇 18 >