< 詩篇 149 >
1 ヱホバをほめたたへよ ヱホバに對ひてあたらしき歌をうたへ 聖徒のつどひにてヱホバの頌美をうたへ
Bokumisa Yawe! Boyembela Yawe nzembo ya sika, bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene!
2 イスラエルはおのれを造りたまひしものをよろこび シオンの子輩は己が王のゆゑによりて樂しむべし
Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango!
3 かれらをどりつつその聖名をほめたたへ 琴鼓にてヱホバをほめうたべし
Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda!
4 ヱホバはおのが民をよろこび 救にて柔和なるものを美しくしたまへばなり
Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.
5 聖徒はえいくわうの故によりてよろこび その寝牀にてよろこびうたふべし
Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango!
6 その口に神をほむるうたあり その手にもろはの劍あり
Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango
7 こはもろもろの國に仇をかへし もろもろの民をつみなひ
mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu;
8 かれらの王たちを鏈にてかれらの貴人をくろかねの械にていましめ
mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, kokanga bato na bango ya lokumu na mabende
9 録したる審判をかれらに行ふべきためなり 斯るほまれはそのもろもろの聖徒にあり ヱホバをほめたたへよ
mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe!