< 詩篇 145 >

1 わがかみ王よわれ汝をあがめ 世かぎりなく聖名をほめまつらん
Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.
2 われ日ごとに汝をほめ世々かぎりなく聖名をはめたたへん
Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.
3 ヱホバは大にましませば最もほむべきかな その大なることは尋ねしることかたし
Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.
4 この代はかの代にむかひてなんぢの事跡をほめたたへ なんぢの大能のはたらきを宣つたへん
Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
5 われ汝のほまれの榮光ある稜威となんぢの奇しきみわざとを深くおもはん
Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.
6 人はなんぢのおそるべき動作のいきほひをかたり 我はなんぢの大なることを宣つたへん
Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.
7 かれらはなんぢの大なる惠の跡をいひいで なんぢの義をほめうたはん
Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko.
8 ヱホバは惠ふかく憐憫みち また怒りたまふことおそく憐憫おほいなり
Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.
9 ヱホバはよろづの者にめぐみあり そのふかき憐憫はみわざの上にあまねし
Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.
10 ヱホバよ汝のすべての事跡はなんぢに感謝し なんぢの聖徒はなんぢをほめん
Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo!
11 かれらは御國のえいくわうをかたり汝のみちからを宣つたへて
Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.
12 その大能のはたらきとそのみくにの榮光あるみいづとを人の子輩にしらすべし
Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.
13 なんぢの國はとこしへの國なり なんぢの政治はよろづ代にたゆることなし
Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.
14 ヱホバはすべて倒れんとする者をささへ かがむものを直くたたしめたまふ
Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.
15 よろづのものの目はなんぢを待 なんぢは時にしたがひてかれらに糧をあたへ給ふ
Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki.
16 なんぢ手をひらきてもろもろの生るものの願望をあかしめたまふ
Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
17 ヱホバはそのすべての途にただしく そのすべての作爲にめぐみふかし
Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.
18 すべてヱホバをよぶもの 誠をもて之をよぶものに ヱホバは近くましますなり
Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo;
19 ヱホバは己をおそるるものの願望をみちたらしめ その號呼をききて之をすくひたまふ
akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
20 ヱホバはおのれを愛しむものをすべて守りたまへど 惡者をことごとく滅したまはん
Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.
21 わが口はヱホバの頌美をかたり よろづの民は世々かぎりなくそのきよき名をほめまつるべし
Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela!

< 詩篇 145 >