< 詩篇 130 >

1 ああヱホバよわれふかき淵より汝をよべり
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi!
2 主よねがはくはわが聲をきき汝のみみをわが懇求のこゑにかたぶけたまへ
Nkolo, yoka ngai! Yoka mabondeli na ngai!
3 ヤハよ主よなんぢ若もろもろの不義に目をとめたまはば誰たれかよく立ことをえんや
Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema?
4 されどなんぢに赦あれば人におそれかしこまれ給ふべし
Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.
5 我ヱホバを俟望む わが霊魂はまちのぞむ われはその聖言によりて望をいだく
Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya; nazali kozela maloba na Ye.
6 わがたましひは衛士があしたを待にまさり 誠にゑじが旦をまつにまさりて主をまてり
Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
7 イスラエルよヱホバによりて望をいだけ そはヱホバにあはれみあり またゆたかなる救贖あり
Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.
8 ヱホバはイスラエルをそのもろもろの邪曲よりあがなひたまはん
Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.

< 詩篇 130 >