< 詩篇 121 >

1 われ山にむかひて目をあぐ わが扶助はいづこよりきたるや
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi?
2 わがたすけは天地をつくりたまへるヱホバよりきたる
Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.
3 ヱホバはなんぢの足のうごかさるるを容したまはず 汝をまもるものは微睡たまふことなし
Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.
4 視よイスラエルを守りたまふものは微睡こともなく寝ることもなからん
Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te!
5 ヱホバは汝をまもる者なり ヱホバはなんぢの右手をおほふ蔭なり
Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.
6 ひるは日なんぢをうたず夜は月なんぢを傷じ
Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te!
7 ヱホバはなんぢを守りてもろもろの禍害をまぬかれしめ並なんぢの霊魂をまもりたまはん
Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo;
8 ヱホバは今よりとこしへにいたるまで 汝のいづると入るとをまもりたまはん
Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

< 詩篇 121 >