< 詩篇 110 >

1 ヱホバわが主にのたまふ 我なんぢの仇をなんぢの承足とするまではわが右にざすべし
Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »
2 ヱホバはなんぢのちからの杖をシオンよりつきいださしめたまはん 汝はもろもろの仇のなかに王となるべし
Wuta na Siona, Yawe akosala ete nguya na yo ya bokonzi ekende mosika, mpe okokonza kati na banguna na Yo.
3 なんぢのいきほひの日になんぢの民は聖なるうるはしき衣をつけ 心よりよろこびて己をささげん なんぢは朝の胎よりいづる壯きものの露をもてり
Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
4 ヱホバ誓をたてて聖意をかへさせたまふことなし 汝はメルキセデクの状にひとしくとこしへに祭司たり
Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te: « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki! »
5 主はなんぢの右にありてそのいかりの日に王等をうちたまへり
Nkolo azali na ngambo ya loboko na yo ya mobali, akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na Ye.
6 主はもろもろの國のなかにて審判をおこなひたまはん 此處にも彼處にも屍をみたしめ 寛濶なる地をすぶる首領をうちたまへり
Akopesa bikolo etumbu: bikolo nyonso ekotonda na bibembe, mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.
7 かれ道のほとりの川より汲てのみ斯てかうべを擧ん
Na nzela, mokonzi amelaka mayi na mwa moluka; yango wana atombolaka moto.

< 詩篇 110 >