< 詩篇 10 >

1 ああヱホバよ何ぞはるかに立たまふや なんぞ患難のときに匿れたまふや
Yawe, mpo na nini otelemi mosika? Mpo na nini obombami na tango ya pasi?
2 あしき人はたかぶりて苦しむものを甚だしくせむ かれらをそのくはだての謀略にとらはれしめたまへ
Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.
3 あしきひとは己がこころの欲望をほこり貪るものを祝してヱホバをかろしむ
Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.
4 あしき人はほこりかにいふ 神はさぐりもとむることをせざるなりと 凡てそのおもひに神なしとせり
Na lolendo na ye, moto mabe alobaka: « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.
5 かれの途はつねに堅く なんぢの審判はその眼よりはなれてたかし 彼はそのもろもろの敵をくちさきらにて吹く
Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe; atiolaka banguna na ye nyonso.
6 かくて己がこころの中にいふ 我うごかさるることなく世々われに禍害なかるべしと
Amilobelaka: « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye: « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »
7 その口にはのろひと虚偽としへたげとみち その舌のしたには殘害とよこしまとあり
Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu; abongisaka kaka pasi mpe mabe.
8 かれは村里のかくれたる處にをり隠やかなるところにて罪なきものをころす その眼はひそかに倚仗なきものをうかがひ
Abombamaka pene ya bamboka. Wuta na bisika oyo abombamaka, abomaka moto oyo asali mabe te. Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.
9 窟にをる獅のごとく潜みまち苦しむものをとらへんために伏ねらひ 貧しきものをその網にひきいれてとらふ
Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
10 また身をかがめて蹲まるその強勁によりて依仗なきものは仆る
Agumbaka ye mpe avandisaka ye na mabele, mpe akweyaka na se ya bokonzi na ye.
11 かれ心のうちにいふ 神はわすれたり神はその面をかくせり神はみることなかるべしと
Amilobelaka: « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »
12 ヱホバよ起たまへ 神よ手をあげたまへ 苦しむものを忘れたまふなかれ
Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.
13 いかなれば惡きもの神をいやしめて心中になんぢ探求むることをせじといふや
Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe? Mpo na nini amilobela: « Nzambe akopesa ngai etumbu te? »
14 なんぢは鍳たまへりその殘害と怨恨とを見てこれに手をくだしたまへり 倚仗なきものは身をなんぢに委ぬ なんぢは昔しより孤子をたすけたまふ者なり
Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
15 ねがはくは惡きものの臂ををりたまへあしきものの惡事を一つだにのこらぬまでに探究したまへ
Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.
16 ヱホバはいやとほながに王なり もろもろの國民はほろびて神の國より跡をたちたり
Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.
17 ヱホバよ汝はくるしむものの懇求をききたまへり その心をかたくしたまはん なんぢは耳をかたぶけてきき
Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,
18 孤子と虐げらる者とのために審判をなし地につける人にふたたび恐嚇をもちひざらしめ給はん
mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.

< 詩篇 10 >