< 箴言 知恵の泉 28 >

1 惡者は逐ふ者なけれども逃げ 義者は獅子のごとくに勇まし
Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.
2 國の罪によりて侯伯多くなり 智くして知識ある人によりて國は長く保つ
Soki kotomboka ezali kati na mokili, bakonzi bakomaka ebele; kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.
3 弱者を虐ぐる貧人は糧をのこさざる暴しき雨のごとし
Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.
4 律法を棄るものは惡者をほめ 律法を守る者はこれに敵す
Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
5 惡人は義きことを覺らず ヱホバを求むる者は凡の事をさとる
Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo, kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.
6 義しくあゆむ貧者は曲れる路をあゆむ富者に愈る
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.
7 律法を守る者は智子なり 放蕩なる者に交るものは父を辱かしむ
Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele, kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge ayokisaka tata na ye soni.
8 利息と高利とをもてその財產を増すものは貧人をめぐむ者のために之をたくはふるなり
Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.
9 耳をそむけて律法を聞ざる者はその祈すらも憎まる
Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
10 義者を惡き道に惑す者はみづから自己の阱に陷らん されど質直なる者は福祉をつぐべし
Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe akokangama na motambo oyo asali ye moko, kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.
11 富者はおのれの目に自らを智慧ある者となす されど聰明ある貧者は彼をはかり知る
Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.
12 義者の喜ぶときは大なる榮あり 惡者の起るときは民身を匿す
Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.
13 その罪を隱すものは榮ゆることなし 然ど認らはして之を離るる者は憐憫をうけん
Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
14 恒に畏るる人は幸福なり その心を剛愎にする者は災禍に陷るべし
Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.
15 貧しき民を治むるあしき侯伯は吼る獅子あるひは饑たる熊のごとし
Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.
16 智からざる君はおほく暴虐をおこなふ 不義の利を惡む者は遐齢をうべし
Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele, kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.
17 人を殺してその血を心に負ふ者は墓に奔るなり 人これを阻むること勿れ
Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa; tika ete moto moko te akanga ye nzela.
18 義く行む者は救をえ 曲れる路に行む者は直に跌れん
Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.
19 おのれの田地を耕す者は糧にあき 放蕩なる者に從ふものは貧乏に飽く
Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi akotonda na bobola.
20 忠信なる人は多くの幸福をえ 速かに富を得んとする者は罪を免れず
Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.
21 人を偏視るはよからず 人はただ一片のパンのために愆を犯すなり
Kopona bilongi ezalaka malamu te; nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.
22 惡目をもつ者は財をえんとて急がはしく 却て貧窮のおのれに來るを知らず
Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.
23 人を譴むる者は舌をもて諂ふ者よりも大なる感謝をうく
Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.
24 父母の物を竊みて罪ならずといふ者は滅す者の友なり
Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye, bongo alobaka: « Ezali na yango mabe te, » azali moninga ya mobomi.
25 心に貧る者は爭端を起し ヱホバに倚賴むものは豊饒になるべし
Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.
26 おのれの心を恃む者は愚なり 智慧をもて行む者は救をえん
Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.
27 貧者に賙すものは乏しからず その目を掩ふ者は詛を受ること多し
Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.
28 惡者の起るときは人匿れ その滅るときは義者ます
Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka; kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.

< 箴言 知恵の泉 28 >