< 箴言 知恵の泉 26 >

1 榮譽の愚なる者に適はざるは夏の時に雪ふり 穡收の時に雨ふるがごとし
Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
2 故なき詛は雀の翔り燕の飛ぶが如くにきたるものにあらず
Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.
3 馬の爲には策あり 驢馬の爲には銜あり 愚なる者の背のために杖あり
Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
4 愚なる者の痴にしたがひて答ふること勿れ 恐くはおのれも是と同じからん
Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye, noki te okokokana na ye.
5 愚なる者の痴にしたがひて之に答へよ 恐くは彼おのれの目に自らを智者と見ん
Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
6 愚なる者に托して事を言おくる者はおのれの足をきり身に害をうく
Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba azali lokola moto oyo amikati makolo mpe amilukeli makambo.
7 跛者の足は用なし 愚なる者の口の箴もかくのごとし
Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te kati na monoko ya zoba.
8 榮譽を愚なる者に與ふるは石を投石索に繋ぐが如し
Kopesa zoba lokumu ezali lokola kotia libanga na ebambelo mabanga.
9 愚なる者の口にたもつ箴言は酔へるものの刺ある杖を手にて擧ぐるがごとし
Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.
10 愚なる者を傭ひ流浪者を傭ふ者は すべての人を傷くる射手の如し
Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
11 狗のかへり來りてその吐たる物を食ふがごとく 愚なる者は重ねてその痴なる事をおこなふ
Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
12 汝おのれの目に自らを智慧ある者とする人を見るか 彼よりも却て愚なる人に望あり
Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
13 惰者は途に獅あり 衢に獅ありといふ
Moto ya goyigoyi alobaka: « Nkosi ekangi nzela! Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala! »
14 戸の蝶鉸によりて轉るごとく惰者はその牀に輾轉す
Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
15 惰者はその手を盤にいるるも之をその口に擧ることを厭ふ
Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko.
16 惰者はおのれの目に自らを善く答ふる七人の者よりも智慧ありとなす
Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.
17 路をよぎり自己に關りなき爭擾にたづさはる者は狗の耳をとらふる者のごとし
Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
18 旣にその鄰を欺くことをなして我はただ戯れしのみといふ者は 火箭または鎗または死を擲つ狂人のごとし
Ndenge moto ya liboma abwakaka moto, makonga mpe kufa,
19 旣にその鄰を欺くことをなして我はただ戯れしのみといふ者は 火箭または鎗または死を擲つ狂人のごとし
ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na ye alobaka: « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki! »
20 薪なければ火はきえ 人の是非をいふ者なければ爭端はやむ
Soki bakoni ezali te, moto ekokufa; soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.
21 煨火に炭をつぎ火に薪をくぶるがごとく爭論を好む人は爭論を起す
Ndenge makala engalaka na mbabola, mpe bakoni epelisaka moto, ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana ayeisaka matata.
22 人の是非をいふものの言はたはぶれのごとしと雖もかへつて腹の奧に入る
Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
23 温かき口唇をもちて惡き心あるは銀の滓をきせたる瓦片のごとし
Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli na mbeki basala na mabele.
24 恨むる者は口唇をもて自ら飾れども 心の衷には虚偽をいだく
Moto oyo ayinaka moninga na ye amibombaka na maloba na ye, kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.
25 彼その聲を和らかにするとも之を信ずるなかれ その心に七の憎むべき者あればなり
Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama kati na motema na ye.
26 たとひ虚偽をもてその恨をかくすとも その惡は會集の中に顯はる
Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabe na maloba ya lokuta, kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebana na miso ya bato nyonso.
27 坑を掘るものは自ら之に陷らん 石を轉ばしあぐる者の上にはその石まろびかへらん
Moto oyo atimolaka libulu akweyaka ye moko kati na yango; mpe moto oyo atindikaka libanga, libanga yango ekozongela kaka ye moko.
28 虚偽の舌はおのれの害す者を憎み 諂ふ口は滅亡をきたらす
Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, mpe maloba ya sukali ememaka libebi.

< 箴言 知恵の泉 26 >