< 箴言 知恵の泉 15 >

1 柔和なる答は憤恨をとどめ厲しき言は怒を激す
Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
2 智慧ある者の舌は知識を善きものとおもはしめ 愚なる者の口はおろかをはく
Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
3 ヱホバの目は何處にもありて惡人と善人とを鑒みる
Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
4 温柔き舌は生命の樹なり 悖れる舌は霊魂を傷ましむ
Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
5 愚なる者はその父の訓をかろんず 誡命をまもる者は賢者なり
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
6 義者の家には多くの資財あり 惡者の利潤には擾累あり
Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
7 智者のくちびるは知識をひろむ 愚なる者の心は定りなし
Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi, kasi ezali bongo te na motema ya zoba.
8 惡者の祭物はヱホバに憎まれ 直き人の祈は彼に悦ばる
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
9 惡者の道はヱホバに憎まれ 正義をもとむる者は彼に愛せらる
Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.
10 道をはなるる者には嚴しき懲治あり 譴責を惡む者は死ぬべし
Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi; moto oyo aboyaka pamela akokufa.
11 陰府と沉淪とはヱホバの目の前にあり 况て人の心をや (Sheol h7585)
Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye. (Sheol h7585)
12 嘲笑者は誡めらるることを好まず また智慧ある者に近づかず
Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye, yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
13 心に喜樂あれば顔色よろこばし 心に憂苦あれば氣ふさぐ
Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
14 哲者のこころは知識をたづね 愚なる者の口は愚をくらふ
Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.
15 艱難者の日はことごとく惡く 心の懽べる者は恒に酒宴にあり
Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.
16 すこしの物を有てヱホバを畏るるは多の寳をもちて擾煩あるに愈る
Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
17 蔬菜をくらひて互に愛するは肥たる牛を食ひて互に恨むるに愈る
Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
18 憤ほり易きものは爭端をおこし 怒をおそくする者は爭端をとどむ
Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
19 惰者の道は棘の籬に似たり 直者の途は平坦なり
Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
20 智慧ある子は父をよろこばせ 愚なる人はその母をかろんず
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
21 無知なる者は愚なる事をよろこび 哲者はその途を直くす
Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
22 相議ることあらざれば謀計やぶる 議者おほければ謀計かならず成る
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
23 人はその口の答によりて喜樂をう 言語を出して時に適ふはいかに善らずや
Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
24 智人の途は生命の路にして上へ昇りゆく これ下にあるところの陰府を離れんが爲なり (Sheol h7585)
Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te. (Sheol h7585)
25 ヱホバはたかぶる者の家をほろぼし 寡婦の地界をさだめたまふ
Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.
26 あしき謀計はヱホバに憎まれ 温柔き言は潔白し
Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.
27 不義の利をむさぼる者はその家をわづらはせ 賄賂をにくむ者は活ながらふべし
Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te amemaka mitungisi na libota na ye, kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
28 義者の心は答ふべきことを考へ 惡者の口は惡を吐く
Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
29 ヱホバは惡者に遠ざかり 義者の祈祷をききたまふ
Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
30 目の光は心をよろこばせ 好音信は骨をうるほす
Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema; sango malamu elendisaka mikuwa.
31 生命の誡命をきくところの耳は智慧ある者の中間に駐まる
Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.
32 敎をすつる者は自己の生命をかろんずるなり 懲治をきく者は聰明を得
Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
33 ヱホバを畏るることは智慧の訓なり 謙遜は尊貴に先だつ
Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

< 箴言 知恵の泉 15 >