< 民数記 4 >
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 レビの子孫の中よりコハテの子孫の總數をその宗族に依りその父祖の家にしたがひて計べ
« Kati na bana mibali ya Levi, tanga motango ya bakitani ya Keati kolanda bituka mpe mabota na bango.
3 三十歳以上五十歳までにして能く軍団に入り集會の幕屋に働作をなすことを得る者をことごとく數へよ
Tanga motango ya mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, mpo ete baya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
4 コハテの子孫が集會の幕屋においてなすべき勤務は至聖物に關る者にして是のごとし
Tala mosala ya bato ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani: kobatela biloko oyo eleki bule.
5 即ち營を進むる時はアロンとその子等まづ往て障蔽の幕を取おろし之をもて律法の櫃を覆ひ
Tango bakolongola molako, Aron elongo na bana na ye ya mibali bakokota na kati, bakokitisa rido mpe bakozipa na yango Sanduku ya Litatoli.
6 その上に獾の皮の蓋をほどこしまたその上に總靑の布を打かけその杠を差いるべし
Na likolo na yango, bakotia bulangeti oyo esalema na poso ya nyama ya ebale, bakofinika liputa ya langi ya ble mpe bakotia mabaya ya komemela Sanduku ya Litatoli.
7 また供前のパンの案の上には靑き布を打かけその上に皿匙杓および酒を灌ぐ斝を置きまた常供のパンをその上にあらしめ
Na likolo ya mesa ya bagato ya bule, bakotanda lisusu liputa ya langi ya ble mpe bakotia na likolo na yango biloko oyo: basani ya mbele, bambeki, bakopo, milangi mpo na makabo ya masanga mpe bagato oyo bakobanda kobonza lokola makabo liboso na Ngai tango nyonso.
8 紅の布をその上に打かけ獾の皮の蓋をもてこれを覆ひ而してその杠を差いるべし
Bongo na likolo ya biloko yango, bakotanda liputa ya langi ya motane makasi, mpe bakozipa biloko wana nyonso na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale. Mpe bakotia balate oyo ekosunga mpo na kotombola mpe komema mesa.
9 また靑き布を取て燈臺とその盞その燈鉗その剪燈盤および其に用ふる諸の油の器を覆ひ
Bakokamata liputa ya langi ya ble mpe bakofinika na yango etelemiselo ya minda elongo na minda na yango, biloko oyo balongolelaka makala na moto, basani mpo na putulu ya moto mpe basani ya mafuta, oyo basalelaka mosala na mesa.
10 獾の皮の蓋の内に燈臺とその諸の器をいれてこれを棹にかくべし
Bakosangisa na liboke moko, ezala elamba yango ya langi ya ble mpe biloko na yango nyonso, kati na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia yango na likolo ya tsipoyi.
11 また金の壇の上に靑き布を打かけ獾の皮の蓋をもて之を蓋ひその杠を差いるべし
Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema.
12 また聖所の役事に用ふる役事の器をことごとく取靑き布に裹み獾の皮の蓋をもてこれを蓋ひて棹にかくべし
Bakozwa biloko nyonso oyo basalaka na yango kati na Esika ya bule, bakotia yango kati na liputa ya langi ya ble, bakofinika yango bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale; bongo bakotia yango na tsipoyi.
Sima na bango kolongola putulu ya moto wuta na etumbelo, bakotanda liputa ya langi ya motane na likolo na yango;
14 その上に役事をなすに用ふる諸の器具すなはち火鼎肉叉火鏟鉢および壇の一切の器具をこれに載せ獾の皮の蓋をその上に打かけ而してその杠を差とほすべし
bongo bakotia na likolo na yango biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo: basani oyo batumbaka na yango ansa, bakanya, bapawu, basani ya minene mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo; bongo bakotanda na likolo ya biloko oyo nyonso, liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia balate ya etumbelo oyo ekosunga mpo na komema.
15 營を進むるにあたりてアロンとその子等聖所と聖所の一切の器具を蓋ふことを畢りたらば即ちコハテの子孫いり來りてこれを舁べし然ながら彼等は聖物に捫るべからず恐くは死ん集會の幕屋の中なる是等の物はコハテの子孫の擔ふべき者なり
Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
16 祭司アロンの子エレアザルは燈火の油馨しき香常供の素祭および灌膏を司どりまた幕屋の全體とその中なる一切の聖物および其處の諸の器具を司どるべし
Tala misala ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron: kolandela mafuta ya etelemiselo ya minda, ansa ya kozikisa, makabo ya mokolo na mokolo mpe mafuta ya epakolami; kokengela Mongombo mpe biloko na yango nyonso, ezala Esika ya bule to biloko na yango nyonso. »
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
18 汝等コハテ人の宗族の者をしてレビ人の中より絶るるに至らしむる勿れ
« Bolongola te kati na Balevi lisanga ya mabota ya bato ya Keati.
19 彼等が至聖物に近く時に生命を保ちて死ることなからん爲に汝等かく之に爲べし即ちアロンとその子等まづ入り彼等をして各箇その役事に就しめその擔ふべき物を取しむべし
Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule: yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema.
20 彼等は入て須臾も聖物を觀るべからず恐らくは死ん
Basengeli te kokota bango moko mpo na kotala Esika ya bule, ata mpo na tango moke; soki te bakokufa. »
22 汝ゲルシヨンの子孫の總數をその父祖の家に依りその宗族に循ひてしらべ
« Tanga motango ya bato ya Gerishoni kolanda bituka mpe mabota na bango.
23 三十歳以上五十歳までにして能く軍團に入り集會の幕屋に動作をなすことを得る者をことごとく數へよ
Okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino na tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni:
25 即ち彼等は幕屋の幕と集會の天幕およびその頂蓋とその上なる貛の皮の蓋ならびに集會の天幕の入口の幔を擔ひ
bakobanda komema batapi ya Mongombo mpe Ndako ya kapo ya Bokutani elongo na elamba na yango, elamba ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale mpo na kozipa na likolo, rido ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani,
26 庭の幕および幕屋と壇の周圍なる庭の門の入口の幔とその繩ならびにそれに用ふる諸の器具と其がために造る一切の物を擔ふべし斯動作べきなり
batapi ya lopango, rido ya ekuke ya lopango, oyo ezingeli Mongombo mpe etumbelo, basinga na yango mpe bisalelo na yango nyonso. Bakosala mosala oyo etali biloko oyo.
27 ゲルシヨンの子孫の一切の役事すなはちその擔ふところと働くところはアロンとその子等の命に循ふべきなり汝等は彼等にその擔ふべき物を割交してこれを守らしむべし
Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali: ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.
28 ゲルシヨンの子孫の宗族が集會の幕屋において爲べき動作は是のごとし彼等の守る所は祭司アロンの子イタマルこれを監督るべし
Wana nde misala ya bituka ya bato ya Gerishoni kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango.
29 メラリの子孫もまた汝これをその宗族に依りその父祖の家に循ひて計べ
Okotanga motango ya bato ya Merari, etuka moko na moko mpe libota moko na moko;
30 三十歳以上五十歳までにして能く軍團に入り集會の幕屋において勤務をなすことを得る者を盡く數へよ
okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
31 彼等が集會の幕屋において爲べき一切の役事すなはちその擔ひ守るべき物は是のごとし幕屋の板その横木その柱その座
Tala biteni ya Ndako ya kapo ya Bokutani, oyo bakobanda komema: mabaya ya Mongombo, balate na yango, makonzi mpe makolo na yango,
32 庭の四周の柱その座その釘その繩およびこれがために用ふる一切の器具なり彼等が擔ひ守るべき器具は汝等その名を按べて之を數ふべし
makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema.
33 是すなはちメラリの子孫の族がなすべき役事にして彼等は祭司アロンの子イタマルの監督をうけて集會の幕屋において此すべての役事を爲べきなり
Wana nde misala ya bituka ya bato ya Merari. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango nyonso kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. »
34 是においてモーセとアロンおよび會衆の牧伯等コハテの子孫をその宗族に依りその父祖の家にしたがひてしらべ
Moyize, Aron mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele batangaki motango ya bato ya Keati, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko.
35 三十歳以上五十歳までにして能く軍團に入り集會の幕屋において勤務をなすことを得る者を盡く數へたるに
Mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
36 その宗族にしたがひて數へられし者二千七百五十人ありき
batangamaki kolanda etuka moko na moko: motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama sambo na tuku mitano.
37 是すなはちコハテ人の族の數へられし者にして皆集會の幕屋に於て役事をなすことを得る者なりモーセとアロン、ヱホバがモーセによりて命じたまひし所にしたがひて之を數へたり
Wana nde motango ya bato nyonso oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Keati, ba-oyo bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki motango yango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
38 またゲルシヨンの子孫をその宗族に依りその父祖の家に循ひて計べ
Batangaki motango ya bato ya Gerishoni kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
39 三十歳以上五十歳までにして能く軍團に入り集會の幕屋において勤務をなすことを得る者を數へたるに
mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
40 その宗族に依りその父祖の家に循ひて數へられし者二千六百三十人ありき
batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko; motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama motoba na tuku misato.
41 是すなはちゲルシヨンの子孫の族の數へられし者にして皆集會の幕屋において勤務をなすことを得る者なりモーセとアロン、ヱホバの命にしたがひて之を數へたり
Wana nde motango ya bato ya Gerishoni oyo batangamaki mpe bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
42 またメラリの子孫の族をその宗族に依りその父祖の家に循ひて計べ
Batangaki motango ya bato ya Merari kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
43 三十歳以上五十歳までにして能く軍團に入り集會の幕屋において勤務をなすことを得る者を數へたるに
mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
44 その宗族にしたがひて數へられし者三千二百人ありき
batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko; motango na bango ezalaki nkoto misato na nkama mibale.
45 是すなはちメラリの子孫の族の數へられし者なりモーセとアロン、ヱホバのモーセによりて命じたまひし所にしたがひて之を數へたり
Wana nde motango ya bato oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Merari. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
46 モーセとアロンおよびイスラエルの牧伯等レビ人をその宗族に依りその父祖の家にしたがひてしらべ
Moyize, Aron mpe bakambi ya Isalaele batangaki motango ya Balevi nyonso, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
47 三十歳以上五十歳までにして能く來りて集會の幕屋の役事を爲し且これを擔ふ業を爲す者を數へたるに
mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
48 その數へられしものの數都合八千五百八十人なりき
batangamaki; motango na bango ezalaki nkoto mwambe na nkama mitano na tuku mwambe.
49 ヱホバの命にしたがひてモーセかれらを數へ彼等をして各人その役事に就しめかつその擔ふ所をうけもたしめたりヱホバの命にしたがひて數へたるところ是のごとし
Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.