< 民数記 20 >

1 斯てイスラエルの子孫の全會衆正月におよびてチンの曠野にいたれり而して民みなカデシに止りけるがミリアム其處にて死たれば之を其處に葬りぬ
Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.
2 當時會衆水を得ざるによりて相集りてモーセとアロンに迫れり
Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron.
3 すなはち民モーセと爭ひ言けるは嚮に我らの兄弟等がヱホバの前に死たる時に我等も死たらば善りしものを
Baswanisaki Moyize mpe balobaki: « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe!
4 汝等何とてヱホバの會衆をこの曠野に導き上りて我等とわれらの家畜を此に死しめんとするや
Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa?
5 汝らなんぞ我らをエジプトより上らしめてこの惡き處に導きいりしや此には種を播べき處なく無花果もなく葡萄もなく石榴も無くまた飮べき水も無し
Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela? »
6 是においてモーセとアロンは會衆の前を去り集會の幕屋の門にいたりて俯伏けるにヱホバの榮光かれらに顯れ
Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango.
7 ヱホバ、モーセに告て言たまはく
Yawe alobaki na Moyize:
8 汝杖を執り汝の兄弟アロンとともに會衆を集めその眼の前にて汝ら磐に命ぜよ磐その中より水を出さん汝かく磐より水を出して會衆とその獣畜に飮しむべしと
« Zwa lingenda na yo; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »
9 モーセすなはちその命ぜられしごとくヱホバの前より杖を取り
Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
10 アロンとともに會衆を磐の前に集めて之に言けるは汝ら背反者等よ聽け我等水をしてこの磐より汝らのために出しめん歟と
Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango: « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo? »
11 モーセその手を擧げ杖をもて磐を二度撃けるに水多く湧出たれば會衆とその獣畜ともに飮り
Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.
12 時にヱホバ、モーセとアロンに言たまひけるは汝等は我を信ぜずしてイスラエルの子孫の目の前に我の聖を顯さざりしによりてこの會衆をわが之に與へし地に導きいることを得じと
Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »
13 是をメリバ(爭論)の水とよべりイスラエルの子孫是がためにヱホバにむかひて爭ひたりしかばヱホバつひにその聖ことを顯したまへり
Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango.
14 茲にモーセ、カデシより使者をエドムの王に遣して言けるは汝の兄弟イスラエルかく言ふ汝はわれらが遭し諸の艱難を知る
Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki: — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi: « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.
15 そもそも我らの先祖等エジプトに下りゆきて我ら年ひさしくエジプトに住をりしがエジプト人われらと我らの先祖等をなやましたれば
Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso;
16 我らヱホバに龥はりけるにヱホバわれらの聲を聽たまひ一箇の天の使を遣して我らをエジプトより導きいだしたまへり視よ我ら今は汝の邊境の邊端にあるカデシの邑に居るなり
kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito. Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo.
17 願くは我らをして汝の國を通過しめよ我等は田畝をも葡萄園をも通過じまた井の水をも飮じ我らは第王の路を通過り汝の境をいづるまでは右にも左にもまがらじ
Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
18 エドム、モーセに言けるは汝我の中を通過べからず恐くは我いでて劍をもて汝にむかはん
Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye: — Okoki kolekela na mokili na ngai te; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga.
19 イスラエルの子孫エドムに言ふ我らは大道を通過ん若われらと我らの獣畜なんぢの水を飮ことあらばその値を償ふべし我は徒行にて通過のみなれば何事にもあらざるなりと
Bana ya Isalaele bazongiselaki ye: — Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te: toleka kaka na makolo.
20 然るにエドムは汝通過べからずといひて許多の群衆を率ゐて出で大なる力をもて之にむかへり
Azongiselaki bango lisusu: — Bokoki kolekela awa te. Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele.
21 エドムかくイスラエルにその境の中を通過ことを容さざりければイスラエルは他にむかひて去り
Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu.
22 かくてイスラエルの子孫の會衆みなカデシより進みてホル山にいたれり
Lisanga mobimba ya Isalaele babimaki wuta na Kadeshi mpe bakomaki kino na ngomba Ori.
23 ヱホバ、エドムの國の境なるホル山にてモーセとアロンに告て言たまはく
Bongo, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na ngomba Ori, pembeni ya mondelo ya Edomi:
24 アロンはその死たる民に列らんイスラエルの子孫に我が與へし地に彼は入ことを得ざるべし是メリバの水のある處にて汝等わが言に背きたればなり
« Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba.
25 汝アロンとその子エレアザルをひきつれてホル山に登り
Kamata Aron na Eleazari, mwana na ye ya mobali mpe mema bango likolo ya ngomba Ori.
26 アロンにその衣服を脱せてこれをその子エレアザルに衣せよアロンは其處に死てその民に列るべしと
Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. »
27 モーセすなはちヱホバの命じたまへるごとく爲し相つれだちて全會衆の目の前にてホル山に登り
Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki: bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba.
28 而してモーセはアロンにその衣服をぬがせて之をその子エレアデルに衣せたりアロンは其處にて山の嶺に死り斯てモーセとエレアザル山よりくだりけるが
Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba;
29 會衆みなアロンの死たるを見て三十日のあひだ哀哭をなせりイスラエルの家みな然せり
mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.

< 民数記 20 >