< ミカ書 6 >

1 請ふ汝らヱホバの宣まふところを聽け 汝起あがりて山の前に辨爭へ 崗に汝の聲を聽しめよ
Boyoka makambo oyo Yawe alobi: « Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, mpe tika ete bangomba mikuse eyoka makambo oyo ozali koloba!
2 山々よ地の易ることなき基よ 汝らヱホバの辨爭を聽け ヱホバその民と辨爭を爲しイスラエルと論ぜん
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
3 我民よ我何を汝になししや 何において汝を疲勞たるや 我にむかひて證せよ
Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini? Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini?
4 我はエジプトの國より汝を導きのぼり奴隸の家より汝を贖ひいだしモーセ、アロンおよびミリアムを遣して汝に先だたしめたり
Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino?
5 我民よ請ふモアブの王バラクが謀りし事およびベオルの子バラムがこれに應へし事を念ひシツテムよりギルガルにいたるまでの事等を念へ 然らば汝ヱホバの正義を知ん
Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
6 我ヱホバの前に何をもちゆきて高き神を拜せん 燔祭の物および當歳の犢をもてその御前にいたるべきか
Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko?
7 ヱホバ數千の牡羊萬流の油を悦びたまはんか 我愆のためにわが長子を獻げんか 我靈魂の罪のために我身の產を獻げんか
Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso?
8 人よ彼さきに善事の何なるを汝に告たり ヱホバの汝に要めたまふ事は唯正義を行ひ憐憫を愛し謙遜りて汝の神とともに歩む事ならずや
Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
9 ヱホバの聲邑にむかひて呼はる 智慧ある者はなんぢの名を仰がん 汝ら笞杖および之をおくらんと定めし者に聽け
Boyoka! Yawe azali kobelela na engumba! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango!
10 惡人の家に猶惡財ありや 詛ふべき縮小たる升ありや
Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe?
11 我もし正からざる權衡を用ひ袋に僞の碼子をいれおかば爭で潔からんや
Boni, nazanga penza kopesa etumbu epai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta, mpe oyo azali na libenga etonda na bimekelo kilo ya lokuta?
12 その富る人は強暴にて充ち其居民は謊言を言ひその舌は口の中にて欺くことを爲す
Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.
13 是をもて我も汝を撃て重傷を負はせ汝の罪のために汝を滅す
Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.
14 汝は食ふとも飽ず腹はつねに空ならん 汝は移すともつひに拯ふことを得じ 汝が拯ひし者は我これを劍に付すべし
Okolia, kasi okotonda te, pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo. Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te, pamba te nakokaba yango na mopanga.
15 汝は種播とも刈ることあらず 橄欖を踐ともその油を身に抹ることあらず 葡萄を踐ともその酒を飮ことあらじ
Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.
16 汝らはオムリの法度を守りアハブの家の一切の行爲を行ひて彼等の謀計に遵ふ 是は我をして汝を荒さしめ且その居民を胡盧となさしめんが爲なり 汝らはわが民の恥辱を任べし
Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.

< ミカ書 6 >