< マラキ書 3 >

1 視よ我わが使者を遣さん かれ我面の前に道を備へん また汝らが求むるところの主すなはち汝らの悦樂ぶ契約の使者忽然その殿に來らん 視よ彼來らんと萬軍のヱホバ云たまふ
« Nakotinda ntoma na Ngai; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
2 されど其來る日には誰か堪えんや その顯著る時には誰か立えんや 彼は金をふきわくる者の火の如く布晒の灰汁のごとくならん
Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba.
3 かれは銀をふきわけてこれを潔むる者のごとく坐せん 彼はレビの裔を潔め金銀の如くかれらをきよめん 而して彼等は義をもて獻物をヱホバにささげん
Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala.
4 その時ユダとエルサレムの獻物はむかし日の如く又先の年のごとくヱホバに悦ばれん
Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala.
5 われ汝らにちかづきて審判をなし巫術者にむかひ姦淫を行ふ者にむかひ僞の誓をなせる者にむかひ傭人の價金をかすめ寡婦と孤子をしへたげ異邦人を推抂げ我を畏れざるものどもにむかひて速に證をなさんと萬軍のヱホバ云たまふ
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
6 それわれヱホバは易らざる者なり 故にヤコブの子等よ汝らは亡されず
« Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka.
7 なんぢら其先祖等の日よりこのかたわが律例をはなれてこれを守らざりき 我にかへれ われ亦なんぢらに歸らん 萬軍のヱホバこれを言ふ 然るに汝らはわれら何においてかへるべきやと言り
Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Kasi bozali komituna: ‹ Tokozonga ndenge nini? ›
8 ひと神の物をぬすむことをせんや されど汝らはわが物を盗めり 汝らは又何において汝の物をぬすみしやといへり 十分の一および獻物に於てなり
Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba: ‹ Tokosi Yo na likambo nini? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.
9 汝らは呪詛をもて詛はる またなんぢら一切の國人はわが物をぬすめり
Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai.
10 わが殿に食物あらしめんために汝ら什一をすべて我倉にたづさへきたれ 而して是をもて我を試みわが天の窓をひらきて容べきところなきまでに恩澤を汝らにそそぐや否やを見るべし 萬軍のヱホバこれを言ふ
Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.
11 我また噬食ふ者をなんぢらの爲に抑へてなんぢらの地の產物をやぶらざらしめん 又なんぢらの葡萄の樹をして時のいたらざる前にその實を圃におとさざらしめん 萬軍のヱホバこれをいふ
Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
12 又萬國の人なんぢらを幸福なる者ととなへん そは汝ら樂しき地となるべければなり 萬軍のヱホバこれをいふ
« Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13 ヱホバ云たまふ 汝らは言詞をはげしくして我に逆らへり しかるも汝らは我儕なんぢらにさからひて何をいひしやといへり
Yawe alobi: « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai. Kasi bozali kotuna: ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo? ›
14 汝らは言らく神に服事ることは徒然なり われらその命令をまもりかつ萬軍のヱホバの前に悲みて歩みたりとて何の益あらんや
Bozali lisusu koloba: ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga?
15 今われらは驕傲ものを幸福なりと稱ふ また惡をおこなふものも盛になり 神を試むるものすらも救はると
Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »
16 その時ヱホバをおそるる者互に相かたりヱホバ耳をかたむけてこれを聽たまへり またヱホバを畏るる者およびその名を記憶る者のためにヱホバの前に記念の書をかきしるせり
Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.
17 萬軍のヱホバいひたまふ 我わが設くる日にかれらをもて我寳となすべし また人の己につかふる子をあはれむがごとく我彼等をあはれまん
« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
18 その時汝らは更にまた義者と惡きものと神に服事るものと事へざる者との區別をしらん
« Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te.

< マラキ書 3 >