< レビ記 7 >

1 また愆祭の例は是のごとし是は至聖者なり
« ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani; ezali eloko ya bule penza:
2 燔祭を宰る場にて愆祭を宰るべし而して祭司その血を壇の四周にそそぎ
‘Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo.
3 その脂をことごとく献ぐべし即ちその脂の尾その臓腑を裹むところの諸の脂
Bakobonza biteni na yango ya mafuta: mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati,
4 兩個の腎とその上の脂の腰の兩傍にある者および肝の上の網膜の腎の上におよべる者を取り
bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.
5 祭司これを壇の上に焚てヱホバに火祭とすべし之を愆祭となす
Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe: ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.
6 祭司等の中の男たる者はみな之を食ふことを得是は聖所に食ふべし至聖者なり
Mibali nyonso kati na Banganga-Nzambe bakoki kolia yango. Basengeli kolia yango na Esika ya bule: ezali eloko ya bule penza.
7 罪祭も愆祭もその例は一にして異らずこれは贖罪をなすところの祭司に歸すべし
Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu.
8 人の燔祭をささぐるところの祭司その祭司はその献ぐる燔祭の物の皮を自己に得べし
Nganga-Nzambe oyo akobonza mbeka ya kotumba mpo na moto, akozwa poso ya nyama oyo abonzi mpe ekozala ya ye.
9 凡て爐に燒たる素祭の物および凡て釜と鍋にて製へたる者はこれを献ぐるところの祭司に歸すべし
Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango.
10 凡そ素祭は油を和たる者も乾たる者もみなアロンの諸の子等に均く歸すべし
Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron; bakozwa yango ndenge moko.’ ›
11 ヱホバに献ぐべき酬恩祭の犠牲の例は是のごとし
‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe:
12 若これを感謝のために献ぐるならば油を和たる無酵菓子と油をぬりたる無酵煎餅および麥粉に油をませて燒たる菓子をその感謝の犠牲にあはせて献ぐべし
‘Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta.
13 その菓子の外にまた有酵パンを酬恩祭なる感謝の犠牲にあはせてその禮物に供ふべし
Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire.
14 即ちこの全體の禮物の中より一箇宛を取りヱホバにささげて擧祭となすべし是は酬恩祭の血を灑ぐところの祭司に歸すべきなり
Akomema eteni ya likabo moko na moko mpe akobonza yango epai na Yawe: ekozala ya Nganga-Nzambe oyo asopaki makila ya mbeka yango ya boyokani pembeni-pembeni ya etumbelo.
15 感謝のために献ぐる酬恩祭の犠牲の肉はこれを献げしその日の中に食ふべし少にても翌朝まで存しおくまじきなり
Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo.
16 その犠牲の禮物もし願還かまたは自意の禮物ならばその犠牲をささげし日にこれを食ふべしその殘餘はまた明日これを食ふことを得るなり
Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda.
17 但しその犠牲の肉の殘餘は第三日にいたらば火に焚べし
Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango.
18 若その酬恩祭の犠牲の肉を第三日に少にても食ふことをなさば其は受納られずまた禮物と算らるることなくして反て憎むべき者とならん是を食ふ者その罪を任べし
Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu.
19 その肉もし汚穢たる物にふるる事あらば食ふべからず火に焚べしその肉は淨き者みなこれを食ふことを得るなり
Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto. Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango.
20 若その身に汚穢ある人ヱホバに屬する酬恩祭の犠牲の肉を食はばその人はその民の中より絶るべし
Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
21 また人もし人の汚穢あるひは汚たる獣畜あるひは忌しき汚たる物等都て汚穢に觸ることありながらヱホバに屬する酬恩祭の犠牲の肉を食はばその人はその民の中より絶るべし
Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.’ › »
22 ヱホバまたモーセに告て言たまはく
Yawe alobaki na Moyize:
23 イスラエルの子孫に告て言べし牛羊山羊の脂は都て汝等これを食ふべからず
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba.
24 自ら死たる獣畜の脂および裂ころされし獣畜の脂は諸般の事に用ふるを得れどもこれを食ふことは絶てなすべからず
Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango.
25 人のヱホバに火祭として献ぐるところの牲畜の脂は誰もこれを食ふべからず之を食ふ人はその民の中より絶るべし
Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye.
26 また汝等はその一切の住處において鳥獣の血を決して食ふべからず
Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama.
27 何の血によらずこれを食ふ人あればその人は皆民の中より絶るべし
Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › »
28 ヱホバ、モーセに告て言たまはく
Yawe alobaki na Moyize:
29 イスラエルの子孫に告て言べし酬恩祭の犠牲をヱホバに献ぐる者はその酬恩祭の犠牲の中よりその禮物を取てヱホバにたづさへ來るべし
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe.
30 ヱホバの火祭はその人手づからこれを携へきたるべし即ちその脂と胸とをたづさへ來りその胸をヱホバの前に搖て搖祭となすべし
Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola.
31 而して祭司その脂を壇の上に焚べしその胸はアロンとその子等に歸すべし
Nganga-Nzambe akotumba mafuta na etumbelo, kasi tolo ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali.
32 汝等はその酬恩祭の犠牲の右の腿を擧祭となして祭司に與ふべし
Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani.
33 アロンの子等の中酬恩祭の血と脂とを献ぐる者その右の腿を得て自己の分となすべし
Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.
34 我イスラエルの子孫の酬恩祭の犠牲の中よりその搖る胸と擧たる腿をとりてこれを祭司アロンとその子等に與ふ是はイスラエルの子孫の中に永く行はるべき例典なり
Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele.
35 是はヱホバの火祭の中よりアロンに歸する分またその子等に歸する分なり彼等を立てヱホバに祭司の職をなさしむる日に斯定めらる
Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › »
36 すなはち是は彼等に膏をそそぐ日にヱホバが命をくだしてイスラエルの子孫の中より彼等に歸せしめたまふ者にて代々永くまもるべき例典たるなり
Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango.
37 是すなはち燔祭素祭罪祭愆祭任職祭酬恩祭の犠牲の法なり
Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani
38 ヱホバ、シナイの野においてイスラエルの子孫にその禮物をヱホバに供ふることを命じたまひし日に是をシナイ山にてモーセに命じたまひしなり
oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.

< レビ記 7 >