< レビ記 21 >

1 ヱホバ、モーセに告て言たまはくアロンの子等なる祭司等に告てこれに言へ民の中の死人のために身を汚す者あるべからず
Yawe ayebisaki Moyize: « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron: ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye,
2 但しその骨肉の親のためすなはちその母のため父のため男子のため女子のため兄弟のため
longola kaka soki ezali ebembe ya mama na ye, ya tata na ye, ya mwana na ye ya mobali to ya mwana na ye ya mwasi, ya ndeko na ye ya mobali.
3 またその姉妹の處女にして未だ夫あらざる者のためには身を汚すも宜し
Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo.
4 祭司はその民の中の長者なれば身を汚して褻たる者となるべからず
Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye.
5 彼等は髮をそりて頭に毛なき所をつくるべからずその鬚の兩傍を損ずべからずまたその身に傷つくべからず
Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango.
6 その神に對て聖あるべくまたその神の名をけがすべからず彼等はヱホバの火祭すなはち其神の食物を献ぐる者なれば聖あるべきなり
Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.
7 彼等は妓女または汚れたる女を妻に娶るべからずまた夫に出されたる女を娶るべからず其はその身ヱホバにむかひて聖ければなり
Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango.
8 汝かれをもて聖者とすべし彼は汝の神ヱホバの食物を献ぐる者なればなり汝すなはちこれをもて聖者となすべし其は我ヱホバ汝らを聖別る者聖ければなり
Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu.
9 祭司の女たる者淫行をなしてその身を汚さば是その父を汚すなり火をもてこれを燒べし
Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto.
10 その兄弟の中灌膏を首にそそがれ職に任ぜられて祭司の長となれる者はその頭をあらはすべからずまたその衣服を裂べからず
Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga.
11 死人の所に往べからずまたその父のためにも母のためにも身を汚すべからず
Akoki te kopusana pembeni ya ebembe mpe komikomisa mbindo mpo na kufa ya tata na ye to ya mama na ye.
12 また聖所より出べからずその神の聖所を褻すべからず其はその神の任職の灌膏首にあればなり我はヱホバなり
Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe.
13 彼妻には處女を娶るべし
Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
14 寡婦休れたる婦または汚れたる婦妓女等は娶るべからず惟自己の民の中の處女を妻にめとるべし
Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
15 その民の中に自己の子孫を汚すべからずヱホバこれを聖別ればなり
Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › »
16 ヱホバ、モーセに告て言たまはく
Yawe ayebisaki Moyize:
17 アロンに告て言へ凡そ汝の歴代の子孫の中身に疵ある者は進みよりてその神ヱホバの食物を献ぐる事を爲べからず
« Loba na Aron: ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.
18 凡て疵ある人は進みよるべからずすなはち瞽者跛者および鼻の缺たる者成餘るところ身にある者
Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo: mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te,
19 脚の折たる者手の折たる者
moto oyo abukana lokolo to loboko,
20 傴僂者侏儒目に雲膜ある者疥ある者癬ある者外腎の壞れたる者等は進みよるべからず
moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo.
21 凡そ祭司アロンの子孫の中身に疵ある者は進みよりてヱホバの火祭を献ぐべからず彼は身に疵あるなれば進みよりてヱホバの食物を献ぐべからざるなり
Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.
22 神の食物の至聖者も聖者も彼は食ふことを得
Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule.
23 然ど障蔽の幕に至べからずまた祭壇に近よるべからず其は身に疵あればなり斯かれわが聖所を汚すべからず其は我ヱホバこれを聖別ればなり
Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › »
24 モーセすなはちアロンとその子等およびイスラエルの一切の子孫にこれを告たり
Moyize alobaki makambo oyo epai ya Aron, epai ya bana na ye ya mibali, mpe epai ya bana nyonso ya Isalaele.

< レビ記 21 >