< 士師記 5 >

1 その日デボラとアビノアムの子バラク謳ひていはく
Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo:
2 イスラエルの首長みちびきをなし民また好んで出でたればヱホバを頌美よ
Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe!
3 もろもろの王よ聽けもろもろの伯よ耳をかたぶけよ我はそのヱホバに謳はん我はイスラエルの神ヱホバを讚へん
Bino bakonzi, boyoka! Bino bakambi, boyoka malamu! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
4 ああヱホバよ汝セイルより出でエドムの野より進みたまひしとき地震ひ天また滴りて雲水を滴らせたり
Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.
5 もろもろの山はヱホバのまへに撼動ぎ彼のシナイもイスラエルの神ヱホバのまへに撼動げり
Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
6 アナテの子シヤムガルのときまたヤエルの時には大路は通行る者なく途行く人は徑を歩み
Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati; mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.
7 イスラエルの村莊には住者なく住む者あらずなりけるがつひに我デボラ起れり我起りてイスラエルに母となる
Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.
8 人々新しき神を選みければ戰鬪門におよべりイスラエルの四萬人のうちに盾或は鎗の見しことあらんや
Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.
9 吾が心は民のうちに好んでいでたるイスラエルの有司等に傾けり汝らヱホバを頌美よ
Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe!
10 しろき驢馬に乗るもの毛氈に坐するものおよび路歩む人よ汝ら謳ふべし
Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa!
11 矢叫の聲に遠かり水汲むところにおいてヱホバの義しき所爲をとなへそのイスラエルを治理めたまふ義しき所爲を唱へよその時ヱホバの民は門に下れり
Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.
12 興よ起よデボラ興よ起よ歌を謳ふべし起てよバラク汝の俘虜を擄きたれアビノアムの子よ
Debora, lamuka! Lamuka! Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba! Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo; mwana mobali ya Abinoami!
13 其時民の首長等の殘餘者くだり來るヱホバ勇士の中にいまして我にくだりたまふ
Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi, bato ya Yawe bakiti mpo na ngai kati na bilombe ya bitumba.
14 エフライムより出る者ありその根アマレクにありベニヤミン汝のあとにつきて汝の民の中にありマキルよりは牧伯下りゼブルンよりは采配を執るものいたる
Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.
15 イッサカルの伯たちはデボラとともに居るイッサカルはバラクとおなじく足の進みて平地に至るルベンの河邊にて大に心にはかる事あり
Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora; ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu na makolo kino na lubwaku. Kasi kati na libota ya Ribeni, mitema etondaki mingi na makanisi.
16 何故に汝は圈のうちに止まりて羊の群に笛吹くを聽くやルベンの河邊にて大に心に考ふることあり
Mpo na nini avandi kati na lopango? Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele? Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa tango pamba na kokanisa.
17 ギレアデはヨルダンの彼方に臥し居る何故にダンは舟のかたはらに止まりしやアセルは濱邊に坐してその港に臥し居る
Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.
18 ゼブルンは生命を捐て死を冒せる民なり野の高きところに居るナフタリまた是の如し
Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, kuna na esika ya bitumba.
19 もろもろの王來りて戰へる時にカナンのもろもろの王メギドンの水の邊においてタアナクに戰へり彼ら一片の貨幣をも獲ざりき
Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.
20 天よりこれを攻るものありもろもろの星其の道を離れてシセラを攻む
Wuta na likolo, minzoto ebundaki; na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.
21 キシオンの河之を押し流しぬ是彼の古への河キシオンの河なりわが靈魂よ汝ますます勇みて進め
Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya!
22 その時馬の蹄は強きももの馳に馳るに由りて地を踏鳴せり
Makolo ya bampunda enyataki mabele, na kopumbwa na mbangu makasi, na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.
23 ヱホバの使いひけるはメロズを詛ふべし汝ら重ね重ねその民を詛ふべきなり彼等來りてヱホバを助けずヱホバを助けて猛者を攻めざればなり
Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna! Pamba te bayei te kosunga Yawe; bayei te kosunga bilombe ya bitumba!
24 ケニ人ヘベルの妻ヤエルは婦女のうちの最も頌むべき者なり彼は天幕に居る婦女のうち最も頌むべきものなり
Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
25 シセラ水を乞ふにヤエル乳を與ふ即ち貴き盤に乳の油を盛てささぐ
Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki; kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo.
26 ヤエル釘子に手をかけ右の手に重き椎をとりてシセラを打ちその頭を碎きその鬢のあたりをうちて貫ぬく
Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.
27 シセラ、ヤエルの足の間に屈みて仆れ偃しその足のあはひに屈みて仆れその屈みたる所にて仆れ亡ぬ
Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki; akweyaki na makolo na ye mpe akufaki.
28 シセラの母窓より望み格子のうちより叫びて言ふ彼が車のきたること何て遲きや彼が馬の歩何てはかどらざるやと
Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga: « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe? »
29 その賢き侍女こたへをなす(母また獨語して斯いへり)
Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye, mpe ye moko amilobeli:
30 かれら獲ものしてこれを分たざらんや人ごとに一人二人の女子を獲んシセラの獲るものは彩る衣ならんその獲る者は彩る衣にして文繍を施せる者ならん即ち彩りて兩面に文繍をほどこせる衣をえてその頸にまとはんと
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba: Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi? »
31 ヱホバよ汝の敵みな是のごとくに亡びよかしまたヱホバを愛するものは日の眞盛に昇るが如くなれよかし とかくて後國は四十年のあひだ太平なりき
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.

< 士師記 5 >