< ヨシュア記 3 >

1 ヨシユア朝はやく起いでてイスラエルの人々とともにシツテムを打發てヨルダンにゆき之を濟らずして其處に宿りぬ
Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.
2 斯て三日の後有司ら陣營の中をめぐり
Sima na mikolo misato, bakambi bakomaki kotambola kati na molako
3 民に命じて曰ふ汝ら祭司等レビ人がなんぢらの神ヱホバの契約の櫃を舁出すを見ば其處を發出てその後に從がへ
mpo na kopesa bato mitindo oyo: — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.
4 されど汝らとその櫃との間には量りて凡そ二千キユビト許の隔離あるべし之に近づく勿れなんぢらその行べき途を知んためなり汝らは未だこの途を經しことなかりき
Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te.
5 ヨシユアまた民に言ふ汝ら身を潔めよヱホバ明日なんぢらの中に妙なる事を行ひたまふべしと
Jozue alobaki na bato: — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.
6 ヨシユア祭司等に告ていふ契約の櫃を舁き民に先だちて濟れと則ち契約の櫃を舁き民に先だちて進めり
Jozue alobaki na Banganga-Nzambe: — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.
7 ヱホバ、ヨシユアに言たまひけるは今日よりして我イスラエルの衆の目の前に汝を尊くし我がモーセと偕にありし如く汝と偕にあることを之に知せん
Yawe alobaki na Jozue: — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.
8 なんぢ契約の櫃を舁ところの祭司等に命じて言へ汝らヨルダンの水際にゆかばヨルダンにいりて立べしと
Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani: « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »
9 ヨシユアでイスラエルの人々にむかひて汝ら此に近づき汝らの神ヱホバの言を聽けと
Jozue alobaki na bana ya Isalaele: — Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino.
10 而してヨシユア語りけらく活神なんぢらの中に在してカナン人ヘテ人ヒビ人ペリジ人ギルガジ人アモリ人ヱブス人を汝らの前より必ず逐はらひたまふべきを左の事によりてなんぢら知るべし
Bongo Jozue alobaki: — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.
11 視よ全地の主の契約の櫃なんぢらに先だちてヨルダンにすすみ入る
Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani.
12 然ば今イスラエルの支派の中より支派ごとに一人づつ合せて十二人を擧よ
Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko.
13 全地の主ヱホバの櫃を舁ところの祭司等の足の蹠ヨルダンの水の中に踏とどまらばヨルダンの水上より流れくだる水きれとどまり立てうづだかくならん
Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir.
14 かくて民はヨルダンを濟らんとてその幕屋を立出祭司等は契約の櫃を舁て之に先だちゆく
Boye tango bato bakobima na molako mpo na kokatisa Yordani, Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Boyokani bakotambola liboso na bango.
15 抑々ヨルダンは収穫の頃には絶ずその岸にことごとく溢るるなれど櫃を舁く者等ヨルダンに到り櫃を舁ける祭司等の足水際に浸ると斉しく
Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi,
16 上より流れくだる水止まりて遥に遠き處まで涸れザレタンに近きアダム邑の邊にて積り起て堆かくなりアラバの海すなはち鹽海の方に流れくだる水まつたく截止りたれば民ヱリコにむかひて直に濟れり
mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.
17 即ちヱホバの契約の櫃を舁る祭司等ヨルダンの中の乾ける地に堅く立をりてイスラエル人みな乾ける地を渉りゆき遂に民ことごとくヨルダンを濟りつくせり
Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.

< ヨシュア記 3 >