< ヨシュア記 22 >

1 茲にヨシユア、ルベン人ガド人およびマナセの支派の半を召て
Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase;
2 これに言けるは汝らはヱホバの僕モーセが汝らに命ぜし所をことごとく守り又わが汝らに命ぜし一切の事において我言に聽したがへり
mpe alobaki na bango: « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino.
3 汝らは今日まで日ひさしく汝らの兄弟を離れずして汝らの神ヱホバの命令の言を守り來り
Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino.
4 今は已に汝らの神ヱホバなんぢらの兄弟に向に宣まひし如く安息を賜ふに至れり然ば汝ら身を轉らしヱホバの僕モーセが汝らに與へしヨルダンの彼方なる汝等の產業の地に歸りて自己の天幕にゆけ
Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.
5 只ヱホバの僕モーセが汝らに命じおきし誡命と律法とを善く謹しみて行ひ汝らの神ヱホバを愛しその一切の途に歩みその命令を守りて之に附したがひ心を盡し精神を盡して之に事ふべしと
Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino: kolinga Yawe, Nzambe na bino; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
6 かくてヨシユア彼らを祝して去しめければ彼らはその天幕に往り
Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango.
7 マナセの支派の半にはモーセ、バシヤンにて產業を與へおけりその他の半にはヨシユア、ヨルダンの此旁西の方にてその兄弟等の中に產業を與ふヨシユア彼らをその天幕に歸し遣るに當りて之を祝し
Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango.
8 之に告て言けるは汝ら衆多の貨財夥多しき家畜金銀銅鐵および夥多しき衣服をもちて汝らの天幕に歸り汝らの敵より獲たるその物を汝らの兄弟の中に分つべしと
Alobaki na bango: « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »
9 爰にルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半はヱホバのモーセによりて命じ給ひし所に循ひて己の所有の地すなはち已に獲たるギレアデの地に往んとてカナンの地のシロよりしてイスラエルの子孫に別れて歸りけるが
Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
10 ルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半カナンの地のヨルダンの岸邊にいたるにおよびて彼處にてヨルダンの傍に一の壇を築けりその壇は大にして遥に見えわたる
Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani.
11 イスラエルの子孫はルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半カナンの地の前の部にてヨルダンの岸邊イスラエルの子孫に屬する方にて一の壇を築けりと言を聞り
Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,
12 イスラエルの子孫これを聞と斉しくイスラエルの子孫の會衆ことごとくシロに集まりて彼らの所に攻のぼらんとす
lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.
13 イスラエルの子孫すなはち祭司エレアザルの子ピハネスをギレアデの地に遣はしてルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半の所に至らしめ
Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
14 イスラエルの各々の支派の中より父祖の家の牧伯一人づつを擧て合せて十人の牧伯を之に伴なはしむ是みなイスラエルの家族の中にて父祖の家の長たる者なりき
Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele: moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.
15 彼らギレアデの地に往きルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半にいたりて之に語りて言けらく
Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango:
16 ヱホバの全會衆かく言ふ汝らイスラエルの神にむかひて愆を犯し今日すでに翻へりてヱホバに從がはざらんとし即ち己のために一の壇を築きて今日ヱホバに叛かんとするは何事ぞや
— Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi: « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo?
17 ベオルの罪われらに足ざらんや之がためにヱホバの會衆に災禍くだりたりしかども我ら今日までも尚身を潔めてその罪を棄ざるなり
Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe!
18 然るに汝らは今日ひるがへりてヱホバに從がはざらんとするや汝ら今日ヱホバに叛けば明日はヱホバ、イスラエルの全會衆を怒りたまふべし
Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele.
19 然ながら汝らの所有の地もし潔からずばヱホバの幕屋のたてるヱホバの產業の地に濟り來て我らの中にて所有を獲よ惟われらの神ヱホバの壇の外に壇を築きてヱホバに叛く勿れまた我らに悖るなかれ
Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.
20 ゼラの子アカン詛はれし物につきて愆を犯しつひにイスラエルの全會衆に震怒臨みしにあらずや且また其罪にて滅亡し者は彼人ひとりにはあらざりき
Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »
21 ルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの支派の半答へてイスラエルの宗族の長等に言けるは
Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele:
22 諸の神の神ヱホバ諸の神の神ヱホバ知しめすイスラエルも亦知んもし叛く事あるひはヱホバに罪を犯す事ならば汝今日我らを救ふなかれ
— Nzambe ya banzambe! Yawe! Nzambe ya banzambe! Yawe! Ayebi nyonso! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo!
23 我らが壇を築きし事もし翻がへりてヱホバに從がはざらんが爲なるか又は其上に燔祭素祭を献げんが爲なるか又はその上に酬恩祭の犠牲を獻げんがためならばヱホバみづからその罪を問討したまへ
Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso!
24 我等は遠き慮をもて故に斯なしたるなり即ち思ひけらく後の日にいたりて汝らの子孫われらの子孫に語りて言ならん汝らはイスラエルの神ヱホバと何の關係あらんや
Te, ezali bongo te! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso: « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele?
25 ルベンの子孫およびガドの子孫よヱホバ我らと汝らの間にヨルダンを界となしたまへり汝らはヱホバの中に分なしと斯いひてなんぢらの子孫われらの子孫としてヱホバを畏るることを息しめんと
Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi! Bozali na libula moko te epai na Yawe! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.
26 是故に我ら言けらく我らいま一の壇を我らのために築かんと是燔祭のために非ずまた犠牲のために非ず
Yango wana tomilobelaki: « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.
27 惟し之をして我らと汝らの間および我らの後の子孫の間に證とならしめて我ら燔祭犠牲および酬恩祭をもてヱホバの前にその職務をなさんがためなり然せば汝らの子孫後の日いたりて我らの子孫に汝らはヱホバの中に分なしと言こと無らん
Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te: ‹ Bozali na libula te epai na Yawe! › »
28 是をもて我ら言り彼らが我らまたは後の日に我らの子孫に然いはばその時我ら言ん我らの父祖の築きたりしヱホバの壇の模形を見よ是は燔祭のためにも非ずまた犠牲のためにもあらず我らと汝らとの間の證なり
Tomilobelaki: « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango: ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »
29 ヱホバに叛き翻へりて今日ヱホバに從がふことを息め我らの神ヱホバの幕屋の前にあるその祭壇の外に燔祭素祭犠牲などのために壇を築くことは我らの絶て爲ざる所なり
Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.
30 祭司ピネハスおよび會衆の長等即ち彼とともなるイスラエルの宗族の首等はルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの子孫が述たる言を聞て善とせり
Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.
31 祭司エレアザルの子ピネハスすなはちルベンの子孫ガドの子孫およびマナセの子孫に言けるは我ら今日ヱホバの我らの中に在すを知る其は汝らヱホバにむかひて此愆を犯さざればなり今なんぢらはイスラエルの子孫をヱホバの手より救ひいだせりと
Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase: — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.
32 祭司エレアザルの子ピネハスおよび牧伯等すなはちルベンの子孫およびガドの子孫に別れてギレアデの地よりカナンの地に歸りイスラエルの子孫にいたりて復命しけるに
Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.
33 イスラエルの子孫これを善とせり而してイスラエルの子孫神を讃めルベンの子孫およびガドの子孫の住をる國を滅ぼしに攻上らんと重ねて言ざりき
Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.
34 ルベンの子孫およびガドの子孫その壇をエド(證)と名けて云ふ是は我らの間にありてヱホバは神にいますとの證をなす者なりと
Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba: Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.

< ヨシュア記 22 >