< ヨブ 記 21 >

1 ヨブこたへて曰く
Yobo azongisaki:
2 請ふ汝等わが言を謹んで聽き 之をもて汝らの慰藉に代よ
« Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
3 先われに容して言しめよ 我が言る後なんぢ嘲るも可し
Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
4 わが怨言は世の人の上につきて起れる者ならんや 我なんぞ氣をいらだつ可らざらんや
Boni, nazali kolela epai ya moto? Ndenge nini nalemba te kokanga motema?
5 なんぢら我を視て驚き手を口にあてよ
Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.
6 われ思ひまはせば畏しくなりて身體しきりに戰慄く
Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
7 惡き人何とて生ながらへ 老かつ勢力強くなるや
Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi? Mpo na nini bakomaka mibange mpe babakisaka nguya na bango?
8 その子等はその周圍にありてその前に堅く立ち その子孫もその目の前に堅く立べし
Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango, mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango.
9 またその家は平安にして畏懼なく 神の杖その上に臨まじ
Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
10 その牡牛は種を與へて過らず その牝牛は子を產てそこなふ事なし
Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, bangombe na bango ya basi ebotaka kaka mpe esopaka zemi te.
11 彼等はその少き者等を外に出すこと群のごとし その子等は舞をどる
Lokola kati na etonga ya bameme, bazali kotika bana na bango: bamoko kokima-kima, mpe bamosusu kosakana.
12 彼等は鼓と琴とをもて歌ひ 笛の音に由て樂み
Bazali kobeta mbonda mpe lindanda, bazali kosepela na lokito ya flite;
13 その日を幸福に暮し まばたくまに陰府にくだる (Sheol h7585)
bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia. (Sheol h7585)
14 然はあれども彼等は神に言らく我らを離れ賜へ 我らは汝の道をしることを好まず
Nzokande, balobaka na Nzambe: ‹ Longwa mosika na biso! Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo.
15 全能者は何者なれば我らこれに事ふべき 我儕これに祈るとも何の益を得んやと
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye? Tokozwa litomba nini na kosambela ye? ›
16 視よ彼らの福祿は彼らの力に由にあらざるなり 惡人の希圖は我の與する所にあらず
Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe!
17 惡人のその燈火を滅るる事幾度ありしか その滅亡のこれに臨む事 神の怒りて之に艱苦を蒙らせたまふ事幾度有しか
Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe? Mbala boni pasi ezali kokitela bango? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye?
18 かれら風の前の藁の如く 暴風に吹さらるる籾殼の如くなること幾度有しか
Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka?
19 神かれの愆を積たくはへてその子孫に報いたまふか 之を彼自己の身に報い知しむるに如ず
Balobaka: ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango!
20 かれをして自らその滅亡を目に視させ かつ全能者の震怒を飮しめよ
Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye, mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
21 その月の數すでに盡るに於ては何ぞその後の家に關はる所あらん
Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka?
22 神は天にある者等をさへ審判たまふなれば誰か能これに知識を敎へんや
Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele, Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama?
23 或人は繁榮を極め全く平穩にかつ安康にして死に
Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,
24 その器に乳充ち その骨の髓は潤ほへり
na nzoto sembesembe, mpe na mikuwa etonda na mafuta;
25 また或人は心を苦しめて死し 終に福祉をあぢはふる事なし
mosusu azali kokufa na mawa na motema, atikali ata komeka kosepela na bomengo te.
26 是等は倶に齊しく塵に臥して蛆におほはる
Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
27 我まことに汝らの思念を知り 汝らが我を攻撃んとするの計略を知る
Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai;
28 なんぢらは言ふ王侯の家は何に在る 惡人の住所は何にあると
bolobaka: ‹ Wapi ndako ya mozwi? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda? ›
29 汝らは路往く人々に詢ざりしや 彼等の證據を曉らざるや
Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela? Bobosani makambo oyo bayebisaki bino,
30 すなはち滅亡の日に惡人遺され 烈しき怒の日に惡人たづさへ出さる
ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
31 誰か能かれに打向ひて彼の行爲を指示さんや 誰か能彼の爲たる所を彼に報ゆることを爲ん
Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye? Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka?
32 彼は舁れて墓に到り 塚の上にて守護ることを爲す
Bamemaka ye na lilita, mpe bakengelaka kunda na ye.
33 谷の土塊も彼には快し 一切の人その後に從ふ 其前に行る者も數へがたし
Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye; bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
34 旣に是の如くなるに汝等なんぞ徒に我を慰さめんとするや 汝らの答ふる所はただ虚僞のみ
Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »

< ヨブ 記 21 >