< ヨブ 記 20 >
Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki:
2 これに因てわれ答をなすの思念を起し心しきりに之がために急る
« Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.
3 我を辱しむる警語を我聞ざるを得ず 然しながらわが了知の性われをして答ふることを得せしむ
Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.
Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,
5 惡き人の勝誇は暫時にして邪曲なる者の歡樂は時の間のみ
elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.
Ata molayi na ye emati kino likolo mpe moto na ye etuti mapata,
7 終には己の糞のごとくに永く亡絶べし 彼を見識る者は言ん彼は何處にありやと
akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba: ‹ Azali wapi? ›
8 彼は夢の如く過さりて復見るべからず 夜の幻のごとく追はらはれん
Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.
9 彼を見たる目かさねてかれを見ることあらず 彼の住たる處も再びかれを見ること無らん
Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te, esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te,
10 その子等は貧しき者に寛待を求めん 彼もまたその取し貨財を手づから償さん
bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,
11 その骨に少壯氣勢充り 然れどもその氣勢もまた塵の中に彼とおなじく臥ん
mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu.
Soki mabe ezali sukali na monoko na ye mpe abombi yango na se ya lolemo na ye,
soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye,
14 然どその食物膓の中にて變り 腹の内にて蝮の毒とならん
bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.
15 かれ貨財を呑たれども復之を吐いださん 神これを彼の腹より推いだしたまふべし
Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango; Nzambe akofutisa ye yango.
Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.
Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki;
18 その勞苦て獲たる物は之を償して自ら食はず 又それを求めたる所有よりは快樂を得じ
akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye.
19 是は彼貧しき者を虐遇げて之を棄たればなり 假令家を奪ひとるとも之を改め作ることを得ざらん
Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko.
20 かれはその腹に飽ことを知ざるが故に自己の深く喜ぶ物をも保つこと能はじ
Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye.
21 かれが遺して食はざる物とては一も無し 是によりてその福祉は永く保たじ
Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.
22 その繁榮の眞盛において彼は艱難に迫られ 乏しき者すべて手をこれが上に置ん
Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.
23 かれ腹を充さんとすれば神烈しき震怒をその上に下し その食する時にこれをその上に降したまふ
Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.
Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende, mbanzi ya bronze ekotobola ye;
25 是に於て之をその身より拔ば閃く鏃その膽より出きたりて畏懼これに臨む
soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye elongo na makila ya mbuma-mbuma, somo ekoyela ye.
26 各種の黑暗これが寳物ををほろぼすために蓄へらる 又人の吹おこせしに非る火かれを焚き その天幕に遺りをる者をも焚ん
Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.
Likolo ekobimisa polele mabe na ye, mabele ekotelemela ye;
mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe.
29 是すなはち惡き人が神より受る分 神のこれに定めたまへる數なり
Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. »