< ヨブ 記 17 >

1 わが氣息は已にくさり 我日すでに盡なんとし墳墓われを待つ
Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
2 まことに嘲弄者等わが傍に在り 我目は彼らの辨爭ふを常に見ざるを得ず
Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
3 願くは質を賜ふて汝みづから我の保證となりたまへ 誰か他にわが手をうつ者あらんや
Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai!
4 汝彼らの心を閉て悟るところ無らしめたまへり 必ず彼らをして愈らしめたまはじ
Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te; yango wana, okolongisa bango te.
5 朋友を交付して掠奪に遭しむる者は其子等の目潰るべし
Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso.
6 彼われを世の民の笑柄とならしめたまふ 我は面に唾せらるべき者となれり
Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
7 かつまた我目は憂愁によりて昏み 肢體は凡て影のごとし
Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
8 義しき者は之に驚き 無辜者は邪曲なる者を見て憤ほる
Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.
9 然ながら義しき者はその道を堅く持ち 手の潔淨き者はますます力を得るなり
Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
10 請ふ汝ら皆ふたたび來れ 我は汝らの中に一人も智き者あるを見ざるなり
Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
11 わが日は已に過ぎ わが計る所わが心に冀ふ所は已に敗れたり
Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.
12 彼ら夜を晝に變ふ 黑暗の前に光明ちかづく
Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili: ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.
13 我もし俟つところ有ば是わが家たるべき陰府なるのみ 我は黑暗にわが牀を展ぶ (Sheol h7585)
Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
14 われ朽腐に向ひては汝はわが父なりと言ひ 蛆に向ひては汝は我母わが姉妹なりと言ふ
Soki nalobi na kunda: ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi: ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
15 然ばわが望はいづくにかある 我望は誰かこれを見る者あらん
wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai?
16 是は下りて陰府の關に到らん 之と齊しく我身は塵の中に臥靜まるべし (Sheol h7585)
Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. » (Sheol h7585)

< ヨブ 記 17 >