< エレミヤ書 30 >
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
2 イスラエルの神ヱホバかく告ていふ我汝に言し言をことごとく書に錄せ
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo.
3 ヱホバいふわれ我民イスラエルとユダの俘囚人を返す日きたらんヱホバこれをいふ我彼らをその先祖にあたへし地にかへらしめん彼らは之をたもたん
Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
4 ヱホバのイスラエルとユダにつきていひたまひし言は是なり
Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda:
5 ヱホバかくいふ我ら戰慄の聲をきく驚懼あり平安あらず
« Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana; kimia ezali lisusu te.
6 汝ら子を產む男あるやを尋ね觀よ我男が皆子を產む婦のごとく手をその腰におき且その面色皆靑く變るをみるこは何故ぞや
Botuna mpe botala: Boni, mobali akoki kobota bana? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa?
7 哀しいかなその日は大にして之に擬ふべき日なし此はヤコブの患難の時なり然ど彼はこれより救出されん
Mawa! Ekozala penza mokolo ya somo! Mokolo moko te ekokokana na yango! Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, kasi akobikisama na pasi yango.
8 萬軍のヱホバいふ其日我なんぢの項よりその軛をくだきはなし汝の繩目をとかん異邦人は復彼を使役はざるべし
Na mokolo wana, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango, nakokata basinga oyo bakangelaki bango mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya.
9 彼らは其神ヱホバと我彼らの爲に立んところの其王ダビデにつかふべし
Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.
10 ヱホバいふ我僕ヤコブよ懼るる勿れイスラエルよ驚く勿れ我汝を遠方より救ひかへし汝の子孫を其とらへ移されし地より救ひかへさんヤコブは歸りて平穩と寧靜をえん彼を畏れしむる者なかるべし
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
11 ヱホバいふ我汝と偕にありて汝を救はん設令われ汝を散せし國々を悉く滅しつくすとも汝をば滅しつくさじされど我道をもて汝を懲さん汝を全たく罰せずにはおかざるべし
Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino; kasi bino, nakobebisa bino nye te; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo; nakozanga te kopamela bino. ›
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Pota na yo ekobika te mpe pasi na yo ekosila te.
Moto akolobela yo akozala te, kisi ezali te mpo na pota na yo, lobiko ezali te mpo na yo.
14 汝の愛する者は皆汝を忘れて汝を求めず是汝の愆の多きと罪の數多なるによりて我仇敵の撃がごとく汝を撃ち嚴く汝を懲せばなり
Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.
15 何ぞ汝の創のために叫ぶや汝の患は愈ることなし汝の愆の多きと罪の數多なるによりて我これを汝になすなり
Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.
16 然どすべて汝を食ふ者は食はれすべて汝を虐ぐる者は皆とらはれ汝を掠むる者は掠められん凡て汝の物を奪ふ者は我これをして奪はるる事にあはしむべし
Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.
17 ヱホバいふ我汝に膏藥を貼り汝の傷を醫さんそは人汝を棄られし者とよび尋る者なきシオンといへばなり
Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa; ›
18 ヱホバかくいふ視よわれかの擄移されたるヤコブの天幕をかへし其住居をあはれまん斯邑はその故の丘垤に建られん城には宜き樣に人住はん
tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
19 感謝と歡樂者の聲とその中よりいでん我かれらを增ん彼ら少からじ我彼らを崇せん彼ら藐められじ
Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.
20 其子は疇昔のごとくあらん其集會は我前に固く立ん凡かれを虐ぐる者は我これを罰せん
Bana na bango ya mibali bakozala lokola na tango ya kala, mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai; nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola bango.
21 其首領は本族よりいで其督者はその中よりいでん我彼をちかづけ彼に近かん誰かその生命を繋て我に近くものあらんやとヱホバいふ
Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai? › elobi Yawe.
‹ Boye, bokozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › »
23 みよヱホバの暴風あり怒と旋轉風いでて惡人の首をうたん
Tala, mopepe ya Yawe etomboki, kanda makasi na Ye epeli, bakake ezali konguluma na likolo, mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.
24 ヱホバの烈き忿はかれがその心の思を行ひてこれを遂るまでは息じ末の日に汝ら明にこれを曉らん
Kanda makasi ya Yawe ekozonga te kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. Bokososola yango penza na mikolo ekoya.