< エレミヤ書 20 >

1 祭司インメルの子ヱホバの室の宰の長なるパシユル、ヱレミヤがこの言を預言するをきけり
Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.
2 是に於てパシユル預言者ヱレミヤを打ちヱホバの室にある上のベニヤミンの門の桎梏に繋げり
Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
3 翌日パシユル、ヱレミヤを桎梏より釋はなちしにヱレミヤ彼にいひけるはヱホバ汝の名をパシユルと稱ずしてマゴルミッサビブ(驚懼周圍にあり)と稱び給ふ
Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye: — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe.
4 即ちヱホバかくいひたまふ視よわれ汝をして汝と汝のすべての友に恐怖をおこさしむる者となさん彼らはその敵の劍に仆れん汝の目はこれを見べし我またユダのすべての民をバビロン王の手に付さん彼は彼らをバビロンに移し劍をもて殺すべし
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
5 我またこの邑のすべての貨財とその得たる諸の物とその諸の珍寶とユダの王等のすべての儲蓄を其敵の手に付さん彼らはこれを掠めまた民を擄へてバビロンに移すべし
Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango: biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
6 パシユルよ汝と汝の家にすめる者は悉く擄へ移されん汝はバビロンにいたりて彼處に死にかしこに葬られん汝も汝が僞りて預言せし言を聽し友もみな然らん
Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
7 ヱホバよ汝われを勸めたまひてわれ其勸に從へり汝我をとらへて我に勝給へりわれ日々に人の笑となり人皆我を嘲りぬ
Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.
8 われ語り呼はるごとに暴逆殘虐の事をいふヱホバの言日々にわが身の恥辱となり嘲弄となるなり
Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.
9 是をもて我かさねてヱホバの事を宣ず又その名をもてかたらじといへり然どヱホバのことば我心にありて火のわが骨の中に閉こもりて燃るがごとくなれば忍耐につかれて堪難し
Kasi soki nalobi: « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te!
10 そは我おほくの人の讒をきく驚懼まはりにあり訴へよ彼を訴へん我親しき者はみな我蹶くことあらんかと窺ひて互にいふ彼誘はるることあらんしからば我儕彼に勝て仇を報ゆることをえんと
Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se: « Botala! Somo na bangambo nyonso! Bofunda ye! Tofunda ye! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba: « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe! »
11 然どヱホバは強き勇士のごとくにして我と偕にいます故に我を攻る者は蹶きて勝ことをえずそのなし遂ざるが爲に大なる恥辱を取ん其羞恥は何時迄も忘られざるべし
Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.
12 義人を試み人の心膓を見たまふ萬軍のヱホバよ我汝に訴を申たれば我をして汝が彼らに仇を報すを見せしめよ
Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo!
13 ヱホバに歌を謠へよヱホバを頌めよそは貧者の生命を惡者の手より救ひ給へばなり
Boyembela Yawe! Bokumisa Yawe! Pamba te abikisaka bomoi ya mobola na maboko ya bato mabe.
14 ああ我生れし日は詛はれよ我母のわれを生し日は祝せられざれ
Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe! Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai epambolama te!
15 わが父に男子汝に生れしと告て父を大に喜ばせし人は詛はれよ
Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye: « Baboteli yo mwana, mwana mobali! »
16 其人はヱホバの憫まずして滅したまひし邑のごとくなれよ彼をして朝に號呼をきかしめ午間に鬨聲をきかしめよ
Tika ete moto yango akoma lokola bingumba oyo Yawe abuki na mawa te! Tika ete ayoka bileli na tongo mpe makelele ya bitumba na midi.
17 彼我を胎のうちに殺さず我母を我の墓となさず常にその胎を大ならしめざりしが故なり
Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te kati na libumu ya mama na ngai, oyo alingaki kozala kunda na ngai, mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela?
18 我何なれば胎をいでて艱難と憂患をかうむり恥辱をもて日を送るや
Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni?

< エレミヤ書 20 >