< イザヤ書 9 >
1 今くるしみを受れども後には闇なかるべし 昔しはゼブルンの地ナフタリの地をあなどられしめ給ひしかど 後には海にそひたる地ヨルダンの外の地 ことくに人のガリラヤに榮をうけしめ給へり
Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani.
2 幽暗をあゆめる民は大なる光をみ 死蔭の地にすめる者のうへに光てらせり
Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili bamoni pole makasi; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole engengeli bango.
3 なんぢ民をましその歡喜を大にしたまひければ かれらは收穫時によろこぶがごとく掠物をわかつときに樂むがごとく汝の前によろこべり
Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
4 そは汝かれらがおへる軛とその肩の笞と虐ぐるものの杖とを折り これを折りてミデアンの日のごとくなし給ひたればなり
Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
5 すべて亂れたたかふ兵士のよろひと血にまみれたる衣とはみな火のもえくさとなりて焚るべし
Basapato nyonso ya basoda oyo lokito na yango eningisaka mabele, mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, ekobwakama na moto mpo ete ezika makasi.
6 ひとりの嬰兒われらのために生れたり 我儕はひとりの子をあたへられたり 政事はその肩にあり その名は奇妙また議士 また大能の神とこしへのちち 平和の君ととなへられん
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye; bakobenga ye: Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
7 その政事と平和とはましくははりて窮りなし 且ダビデの位にすわりてその國ををさめ今よりのちとこしへに公平と正義とをもてこれを立これを保ちたまはん 萬軍のヱホバの熱心これを成たまふべし
Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.
8 主一言をヤコブにおくり之をイスラエルの上にのぞませ給へり
Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.
9 すべてのこの民エフライムとサマリヤに居るものとは知ならん かれらは高ぶり誇る心をもていふ
Bato nyonso bakoyeba yango, Efrayimi mpe bavandi ya Samari, oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema:
10 瓦くづるるともわれら斫石をもて建 くはの木きらるるともわれら香柏をもて之にかへんと
« Ata babiliki ekweyi, tokotonga lisusu na mabanga bakata; ata bakati banzete ya sikomori, tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »
11 この故にヱホバ、レヂンの敵をあげもちゐてイスラエルを攻しめ その仇をたけび勇しめたまはん
Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.
12 前にアラム人あり後にペシリテ人あり 口をはりてイスラエルを呑んとす 然はあれどヱホバの怒やまずして尚その手をのばしたまふ
Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima, bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
13 然どこの民はおのれをうつものに歸らず萬軍のヱホバを求めず
Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.
14 斯るゆゑにヱホバ一日のうちに首と尾と椶櫚のえだと葦とをイスラエルより斷切たまはん
Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.
15 その首とは老たるもの尊きもの その尾とは謊言をのぶる預言者をいふなり
Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto; mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila.
16 この民をみちびく者はこれを迷はせその引導をうくる者はほろぶるなり
Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela, mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
17 このゆゑに主はその少壯者をよろこびたまはず その孤兒と寡婦とを憐みたまはざるべし 是その民はことごとく邪まなり惡をおこなふ者なり おのおのの口は愚かなる言をかたればなり 然はあれどヱホバの怒やまずして尚その手をのばしたまふ
Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, bazali kosala mabe, mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
18 惡は火のごとくもえ棘と荊とを食つくし茂りあふ林をやくべければみな煙となりむらがりて上騰らん
Solo, mabe etumbaka lokola moto oyo ezikisaka basende mpe banzube, ezikisaka bazamba minene mpe ematisaka makonzi ya milinga.
19 萬軍のヱホバの怒によりて地はくろく燒 その民は火のもえくさとなり人々たがひに相憐むことなし
Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mokili eziki na moto, mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. Moto moko te akobikisa ndeko na ye.
20 人みぎに攫めどもなほ饑 ひだりに食へども尚あかず おのおのその腕の肉をくらふべし
Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye:
21 マナセはエフライムを エフライムはマナセをくらひ 又かれら相合てユダを攻めん 然はあれどヱホバの怒やまずして尚その手をのばしたまふ
Manase akolia Efrayimi, mpe Efrayimi akolia Manase; bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.