< イザヤ書 42 >
1 わが扶くるわが僕わが心よろこぶわが撰人をみよ 我わが靈をかれにあたへたり かれ異邦人に道をしめすべし
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
2 かれは叫ぶことなく聲をあぐることなくその聲を街頭にきこえしめず
akotombola mongongo te, akoganga te, akobelela na mongongo makasi te na babalabala;
3 また傷める蘆ををることなくほのくらき燈火をけすことなく 眞理をもて道をしめさん
akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda oyo ekomi pene ya kokufa. Akomema bosembo na solo nyonso,
4 かれは衰へず喪膽せずして道を地にたてをはらん もろもろの島はその法言をまちのぞむべし
akolemba te mpe akotika te kino tango akotia bosembo na mokili. Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.
5 天をつくりてこれをのべ 地とそのうへの產物とをひらき そのうへの民に息をあたへ その中をあゆむものに靈をあたへたまふ神ヱホバかく言給ふ
Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, oyo apesaka pema na bato na yango mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango:
6 云くわれヱホバ公義をもてなんぢを召たり われなんぢの手をとり汝をまもり なんぢを民の契約とし異邦人のひかりとなし
« Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo, nasimbi loboko na yo makasi, nabateli yo mpe natie yo mpo na kosala boyokani elongo na bikolo mpe kozala pole ya bikolo,
7 而して瞽の目を開き俘囚を獄よりいだし 暗にすめるものを檻のうちより出さしめん
mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.
8 われはヱホバなり是わが名なり 我はわが榮光をほかの者にあたへず わがほまれを偶像にあたへざるなり
Nazali Yawe; yango nde Kombo na Ngai; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.
9 さきに預言せるところはや成れり 我また新しきことをつげん 事いまだ兆さざるさきに我まづなんぢらに聞せんと
Tala, makambo ya liboso esili koleka, mpe Ngai nazali kotatola makambo ya sika; nayebisi bino yango liboso ete esalema. »
10 海にうかぶもの 海のなかに充るもの もろもろの島およびその民よ ヱホバにむかひて新しき歌をうたひ 地の極よりその頌美をたたへまつれ
Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso!
11 荒野とその中のもろもろの邑とケダル人のすめるもろもろの村里はこゑをあげよ セラの民はうたひて山のいただきよりよばはれ
Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela! Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo; tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba!
12 榮光をヱホバにかうぶらせ その頌美をもろもろの島にて語りつげよ
Tika ete bapesa nkembo epai na Yawe mpe batatola lokumu na Ye kati na bisanga!
13 ヱホバ勇士のごとく出たまふ また戰士のごとく熱心をおこし 聲をあげてよばはり大能をあらはして仇をせめ給はん
Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba; akoganga, solo; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.
14 われ久しく聲をいださず默して己をおさへたり 今われ子をうまんとする婦人のごとく叫ばん 我いきづかしくかつ喘がん
Wuta kala, navandaki nye, nakangaki monoko mpe motema na ngai; kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.
15 われ山と岡とをあらし且すべてその上の木草をからし もろもろの河を島としもろもろの池を涸さん
Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse, nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso, nakokomisa bibale, bisanga, mpe nakokawusa maziba;
16 われ瞽者をその未だしらざる大路にゆかしめ その未だしらざる徑をふましめ 暗をその前に光となし 曲れるをその前になほくすべし 我これらの事をおこなひて彼らをすてじ
nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.
17 刻みたる偶像にたのみ鑄たる偶像にむかひて汝等はわれらの神なりといふものは退けられて大に恥をうけん
Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko mpe balobaka na bililingi: « Bozali banzambe na biso, » bakozonga sima mpe bakosambwa.
Boyoka, bino bakufi matoyi! Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso!
19 瞽者はたれぞ わが僕にあらずや 誰かわがつかはせる使者の如き瞽者あらんや 誰かわが友の如きめしひあらんや 誰かヱホバの僕のごときめしひあらんや
Nani azali mokufi miso soki mosali na ngai te? Nani yango mokufi matoyi soki ntoma oyo ngai natindaki te? Nani mokufi miso lokola molobeli na ngai? Nani mokufi miso lokola mosali na Yawe?
20 汝おほくのことを見れども顧みず 耳をひらけども聞ざるなり
Omonaki makambo ebele, kasi ozalaki na bokebi na yango te; matoyi na yo efungwamaki, kasi oyokaki ata eloko moko te.
21 ヱホバおのれ義なるがゆゑに大にしてたふとき律法をたまふをよろこび給へり
Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
22 然るにこの民はかすめられ奪はれて みな穴中にとらはれ獄のなかに閉こめらる 斯てその掠めらるるを助くる者なく その奪はれたるを償へといふ者なし
Kasi tala bato oyo bomengo na bango, babotola yango mpe babebisa bango; bakanga bango nyonso na mabulu mpe babomba bango kati na boloko, bakoma lokola bomengo ya bitumba, bongo moto akokangola bango azali te; bakoma lokola mosuni, bongo moto akoloba: « Zongisa bango, » azali te.
23 なんぢらのうち誰かこのことに耳をかたぶけん たれか心をもちゐて後のために之をきかん
Nani kati na bino akoyoka makambo yango? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya?
24 ヤコブを奪はせしものは誰ぞ かすむる者にイスラエルをわたしし者はたれぞ 是ヱホバにあらずや われらヱホバに罪ををかし その道をあゆまず その律法にしたがふことを好まざりき
Nani akabaki Jakobi na maboko ya babebisi, mpe Isalaele na maboko ya banguna? Boni, ezalaki Yawe te oyo liboso ya nani basalelaki masumu? Pamba te balingaki te kolanda nzela na Ye mpe kotosa Mobeko na Ye.
25 この故にヱホバ烈しき怒をかたぶけ 猛きいくさをきたらせ その烈しきこと火の如く四圍にもゆれども彼しらず その身に焚せまれども心におかざりき
Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.