< イザヤ書 10 >
1 不義のおきてをさだめ暴虐のことばを録すものは禍ひなるかな
Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato!
2 かれらは乏きものの訴をうけず わが民のなかの貧しきものの權利をはぎ寡婦の資產をうばひ孤兒のものを掠む
Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike.
3 なんぢら懲しめらるる日きたらば何をなさんとするか 敗壞とほきより來らんとき何をなさんとするか なんぢら逃れゆきて誰にすくひを求めんとするか また何處になんぢらの榮をのこさんとするか
Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino? Esika nini bokobomba bomengo na bino?
4 ただ縛められたるものの下にかがみ 殺されたるもののしたに伏仆れんのみ 然はあれどヱホバのいかり止ずして尚ほその手をのばしたまふ
Eloko kaka bokotikala na yango: kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
5 咄アツスリヤ人 なんぢはわが怒の杖なり その手の笞はわが忿恚なり
Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai!
6 われ彼をつかはして邪曲なる國をせめ我かれに命じて我がいかれる民をせめてその所有をかすめその財寶をうばはしめ かれらを街の泥のごとくに蹂躪らしめん
Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.
7 されどアツスリヤ人のこころざしは斯のごとくならず その心の念もまた斯のごとくならず そのこころは敗壞をこのみ あまたの國をほろぼし絶ん
Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.
Azali koloba: « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso ndenge moko na bakonzi te?
9 カルノはカルケミシの如く ハマテはアルパデの如く サマリヤはダマスコの如きにあらずや
Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te?
10 わが手は偶像につかふる國々を得たり その彫たる像はヱルサレムおよびサマリヤのものに勝れたり
Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo oyo esambelaka banzambe ya bikeko, bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele koleka Yelusalemi mpe Samari,
11 われ旣にサマリヤとその偶像とに行へるごとく亦ヱルサレムとその偶像とにおこなはざる可んやと
nakokoka te penza kosala Yelusalemi elongo na banzambe na yango ya bikeko ndenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko? »
12 このゆゑに主いひたまふ 我シオンの山とヱルサレムとに爲んとする事をことごとく遂をはらんとき 我アツスリヤ王のおごれる心の實とその高ぶり仰ぎたる眼とを罰すべし
Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba: « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
13 そは彼いへらく われ手の力と智慧とによりて之をなせり 我はかしこし 國々の境をのぞき その獲たるものをうばひ 又われは丈夫にしてかの位に坐するものを下したり
Pamba te azalaki koloba: ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.
14 わが手もろもろの民のたからを得たりしは巣をとるが如く また天が下を取收めたりしは遺しすてたる卵をとりあつむるが如くなりき あるひは翼をうごかし あるひは口をひらき あるひは喃々する者もなかりしなりと
Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba: moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »
15 斧はこれをもちゐて伐ものにむかひて己みづから誇ることをせんや 鋸は これを動かす者にむかひて己みづから高ぶることをせんや 此はあだかも笞がおのれを擧るものを動かし杖みづから木にあらざるものを擧んとするにひとし
Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango?
16 このゆゑに主萬軍のヱホバは肥たるものを瘠しめ 且その榮光のしたに火のもゆるが如き火焰をおこし給はん
Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto.
17 イスラエルの光は火のごとく その聖者はほのほの如くならん 斯て一日のうちに荊とおどろとを燒ほろぼし
Pole ya Isalaele ekokoma moto, Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto; kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa basende mpe banzube ya Asiri,
18 又かの林と土肥たる田圃の榮をうせしめ 靈魂をも身をもうせしめて病るものの衰へたるが如くなさん
akozikisa nye bazamba na yango ya minene mpe bilanga na yango ya kitoko ndenge mobeli akondaka.
19 かつ林のうちに殘れる木わづかにして童子も算へうるが如くになるべし
Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke oyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango.
20 その日イスラエルの遺れる者とヤコブの家ののがれたる者とは再びおのれを撃し者にたよらず誠意をもてイスラエルの聖者ヱホバにたよらん
Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
21 その遺れるものヤコブの遺れるものは大能の神にかへるべし
Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya.
22 ああイスラエルよ なんぢの民は海の沙のごとしといへども遺りて歸りきたる者はただ僅少ならん そは敗壞すでにさだまり義にて溢るべければなり
Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.
23 主萬軍のヱホバの定めたまへる敗壞はこれを徧く國内におこなひ給ふべし
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba.
24 このゆゑに主萬軍のヱホバいひたまはく シオンに住るわが民よアツスリヤ人エジプトの例にならひ笞をもて汝をうち杖をあげて汝をせむるとも懼るるなかれ
Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, bozala na somo te ya bato ya Asiri oyo bazali kobeta bino fimbu mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala.
25 ただ頃刻にして忿恚はやまん 我がいかりは彼等をほろぼして息ん
Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. »
26 萬軍のヱホバむかしミデアン人をオレブの巖のあたりにて撃たまひしごとくに禍害をおこして之をせめ 又その杖を海のうへに伸しエジプトの例にしたがひてこれを擧たまはん
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.
27 その日かれの重荷はなんぢの肩より下 かれの軛はなんぢの頸よりはなれ その軛はあぶらの故をもて壞れん
Na mokolo wana, bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino mpe na ekangiseli na bakingo na bino. Tango mokumba yango ekolongwa, ekotika esika na bomengo.
28 かれアイにきたりミグロンを過ミクマシにてその輜重をとどめ
Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.
29 渡口をすぎてゲバに宿る ここに於てラマはをののきサウルギべア人は逃れはしれり
Baleki kati na bangomba mpe balobi: « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.
30 ガリムの女よなんぢ聲をあげて叫べ ライシよ耳をかたぶけて聽け アナトテよなんぢも聲をあげよ
Oh bato ya Galimi, boganga makasi! Oh Layisi, sala keba! Oh engumba Anatoti, mawa na yo!
Bato ya Madimena bakimi, bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo;
32 この日かれノブに立とどまり シオンのむすめの山ヱルサレムの岡にむかひて手をふりたり
Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi, bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko, mpe na ngomba moke ya Yelusalemi.
33 主ばんぐんのヱホバは雄々しくたけびてその枝を斷たまはん 丈高きものは伐おとされ聳えたる者はひくくせらるべし
Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokata bitape ya banzete na nguya monene, akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, akokomisa yango mikuse.
34 また銕をもて茂りあふ林をきり給はん レバノンは能力あるものに倒さるべし
Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba: Libani ekokweya liboso ya Elombe.