< エズラ記 1 >

1 ペルシヤ王クロスの元年に當りヱホバ曩にエレミヤの口によりて傳へたまひしその聖言を成んとてペルシヤ王クロスの心を感動したまひければ王すなはち宣命をつたへ詔書を出して徧く國中に告示して云く
Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba:
2 ペルシヤ王クロスかく言ふ 天の神ヱホバ地上の諸國を我に賜へり その家をユダのヱルサレムに建ることを我に命ず
« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi: ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.
3 凡そ汝らの中もしその民たる者あらばその神の助を得てユダのヱルサレムに上りゆきヱルサレムなるイスラエルの神ヱホバの室を建ることをせよ 彼は神にましませり
Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi!
4 その民にして生存れる者等の寓りをる處の人々は之に金銀貨財家畜を予へて助くべし その外にまたヱルサレムなる神の室のために物を誠意よりささぐべしと
Tika ete bavandi ya bisika nyonso oyo bato ya Yuda bazali bapesa bango, mpo na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Yelusalemi, makabo oyo: palata, wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge mpe makabo oyo bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. › »
5 是にユダとベニヤミンの宗家の長祭司レビ人など凡て神にその心を感動せられし者等ヱルサレムなるヱホバの室を建んとて起おこれり
Bongo bakambi ya mabota ya Yuda mpe ya Benjame, Banganga-Nzambe mpe Balevi, elongo na moto nyonso oyo Nzambe atutaki motema babongamaki mpo na kokende kotonga Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi.
6 その周圍の人々みな銀の器黄金貨財家畜および寳物を予へて之に力をそへこの外にまた各種の物を誠意より獻げたり
Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
7 クロス王またネブカデネザルが前にヱルサレムより携へ出して己の神の室に納めたりしヱホバの室の器皿を取いだせり
Mokonzi Sirisi abimisaki biloko ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori amemaki wuta na Yelusalemi mpo na kotia yango kati na tempelo ya nzambe na ye.
8 即ちペルシヤ王クロス庫官ミテレダテの手をもて之を取いだしてユダの牧伯セシバザルに數へ交付せり
Sirisi, mokonzi ya Persi, atindaki Mitredati, mobombi bozwi na ye, ete abimisa, atanga mpe apesa yango epai ya Sheshibatsari, moto ya libota ya bakambi ya Yuda.
9 その數は是のごとし 金の盤三十 銀の盤一千 小刀二十九
Tala biloko yango mpe motango na yango: bakopo ya wolo ezalaki tuku misato; bakopo ya palata ezalaki nkoto moko; basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa;
10 金の大斝三十、二等の銀の大斝四百十 その他の器具一千
basani ya wolo ezalaki tuku misato; basani minene ya palata ezalaki nkama minei na zomi; biloko mosusu ezalaki nkoto moko.
11 金銀の器皿は合せて五千四百ありしがセシバザル俘擄人等をバビロンよりヱルサレムに將て上りし時に之をことごとく携さへ上れり
Motango ya biloko nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkoto mitano na nkama minei. Sheshibatsari amemaki biloko yango nyonso tango bato oyo bakendeki na bowumbu balongwaki na Babiloni mpo na kozonga na Yelusalemi.

< エズラ記 1 >