< エズラ記 2 >
1 往昔バビロンの王ネブカデネザルに擄へられバビロンに遷されたる者のうち俘囚をゆるされてヱルサレムおよびユダに上りおのおの己の邑に歸りし此州の者は左の如し
Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.
2 是皆ゼルバベル、ヱシユア、ネヘミヤ、セラヤ、レエラヤ、モルデカイ、ビルシヤン、ミスパル、ビグワイ、レホム、バアナ等に隨ひ來れり 其イスラエルの民の人數は是のごとし
Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele:
Bakitani ya Pareoshi: nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
Bakitani ya Shefatia: nkama misato na tuku sambo na mibale.
Bakitani ya Ara: nkama sambo na tuku sambo na mitano.
6 ヱシユアとヨアブの族たるパハテモアブの子孫二千八百十二人
Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi: nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mibale.
Bakitani ya Elami: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
Bakitani ya Zatu: nkama libwa na tuku minei na mitano.
Bakitani ya Zakayi: nkama sambo na tuku motoba.
Bakitani ya Bani: nkama motoba na tuku minei na mibale.
Bakitani ya Bebayi: nkama motoba na tuku mibale na misato.
Bakitani ya Azigadi: nkoto moko na nkama mibale na tuku mibale na mibale.
Bakitani ya Adonikami: nkama motoba na tuku motoba na motoba.
Bakitani ya Bigivayi: nkoto mibale na tuku mitano na motoba.
Bakitani ya Adini: nkama minei na tuku mitano na minei.
Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi: tuku libwa na mwambe.
Bakitani ya Betsayi: nkama misato na tuku mibale na misato.
Bakitani ya Yora: nkama moko na zomi na mibale.
Bakitani ya Ashumi: nkama mibale na tuku mibale na misato.
Bakitani ya Gibari: tuku libwa na mitano.
Bato ya mboka Beteleemi, nkama moko na tuku mibale na misato.
Bato ya mboka Netofa: tuku mitano na motoba.
Bato ya mboka Anatoti: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
Bato ya Azimaveti: tuku minei na mibale.
25 キリアテヤリム、ケピラおよびベエロテの民七百四十三人
Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti: nkama sambo na tuku minei na misato.
Bakitani ya Rama mpe Geba: nkama motoba na tuku mibale na moko.
Bato ya mboka Mikimasi: nkama moko na tuku mibale na mibale.
Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi: nkama mibale na tuku mibale na misato.
Bakitani ya Nebo: tuku mitano na mibale.
Bakitani ya Magibishi: nkama moko na tuku mitano na motoba.
Bakitani ya Elami mosusu: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
Bakitani ya Arimi: nkama misato na tuku mibale.
Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono: nkama sambo na tuku mibale na mitano.
Bakitani ya Jeriko: nkama misato na tuku minei na mitano.
Bakitani ya Sena: nkoto misato na nkama motoba na tuku misato.
36 祭司はヱシユアの家のヱダヤの子孫九百七十三人
Tala motango ya Banganga-Nzambe: Bakitani ya Yedaeya, na nzela ya libota ya Jozue: nkama libwa na tuku sambo na misato.
Bakitani ya Imeri: nkoto moko na tuku mitano na mibale.
Bakitani ya Pashuri: nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
Bakitani ya Arimi: nkoto moko na zomi na sambo.
40 レビ人はホダヤの子等ヱシユアとカデミエルの子孫七十四人
Tala motango ya Balevi: Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia: tuku sambo na minei.
Tala motango ya bayembi: Bakitani ya Azafi: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
42 門を守る者の子孫はシヤルムの子孫アテルの子孫タルモンの子孫アツクブの子孫ハテタの子孫シヨバイの子孫合せて百三十九人
Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo: Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi: nkama moko na tuku misato na libwa.
43 ネテニ人はヂハの子孫ハスパの子孫タバオテの子孫
Tala basali ya Tempelo: Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
Asina, Mewunimi, Nefusimi,
Batsiluti, Meyida, Arisha,
55 ソロモンの僕たりし者等の子孫すなはちソタイの子孫ハッソペレテの子孫ペリダの子孫
Tala bakitani ya basali ya Salomo: Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Peruda,
57 シパテヤの子孫ハッテルの子孫ポケレテハツゼバイムの子孫アミの子孫
Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.
58 ネテニ人とソロモンの僕たりし者等の子孫とは合せて三百九十二人
Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo: nkama misato na tuku libwa na mibale.
59 またテルメラ、テルハレサ、ケルブ、アダンおよびインメルより上り來れる者ありしがその宗家の長とその血統とを示してイスラエルの者なるを明かにすることを得ざりき
Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele:
60 是すなはちデラヤの子孫トビヤの子孫ネコダの子孫にして合せて六百五十二人
Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda: nkama motoba na tuku mitano na mibale.
61 祭司の子孫たる者の中にハバヤの子孫ハッコヅの子孫バルジライの子孫あり バルジライはギレアデ人バルジライの女を妻に娶りてその名を名りしなり
Mpe kati na Banganga-Nzambe: Bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
62 是等の者譜系に載たる者等の中におのが名を尋ねたれども在ざりき 是の故に汚れたる者として祭司の中より除かれたり
Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
63 テルシヤタは之に告てウリムとトンミムを帶る祭司の興るまでは至聖物を食ふべからずと言り
Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
65 この外にその僕婢七千三百三十七人 謳歌男女二百人あり
bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale;
bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano;
bashamo nkama minei na tuku misato na mitano; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
68 宗家の長數人ヱルサレムなるヱホバの室にいたるにおよびてヱホバの室をその本の處に建んとて物を誠意より獻げたり
Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.
69 即ちその力にしたがひて工事のために庫を納めし者は金六萬一千ダリク銀五千斤祭司の衣服百襲なりき
Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.
70 祭司レビ人民等謳歌者門を守る者およびネテニ人等その邑々に住み一切のイスラエル人その邑々に住り
Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.