< エゼキエル書 46 >

1 主ヱホバかく言たまふ内庭の東向の門は事務をなすところの六日の間は閉ぢ置き安息日にこれを開き又月朔にこれを開くべし
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama.
2 君たる者は外より門の廊の路をとほりて入り門の柱の傍に立つべし祭司等その時かれの爲に燔祭と酬恩祭を備ふべし彼は門の閾において禮拜をなして出べし但し門は暮まで閉べからず
Mokambi akokota na kati, wuta na libanda; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa.
3 國の民は安息日と月朔とにその門の入口においてヱホバの前に禮拜をなすべし
Na mikolo ya bafeti ya Saba mpe ya ebandeli ya sanza, bato ya mokili bakobanda kogumbama liboso ya Yawe, na ekotelo yango.
4 君が安息日にヱホバに獻ぐる燔祭には六の全き羔羊と一の全き牡羊を用ふべし
Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali: nyonso esengeli ezala ezanga mbeba.
5 又素祭は牡羊のために一エパを用ふべし羔羊のために用ふる素祭はその手の出しうる程を以し一エパに油一ヒンを加ふべし
Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.
6 月朔には犢なる一頭の全き牡牛および六の羔羊と一の牡羊の全き者を用ふべし
Na mokolo na feti ya ebandeli ya sanza, akobonza mwana ngombe moko ya mobali, bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali: nyonso esengeli ezala ezanga mbeba.
7 素祭は牛のために一エパ牡羊のために一エパ羔羊のために其手のおよぶ程を備へ一エパに油一ヒンを加ふべし
Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.
8 君は來る時に門の廊の路より入りまたその路より出べし
Tango mokambi akokota na kati, akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana.
9 國の民祭日にヱホバの前に來る時は北の門よりいりて禮拜をなせる者は南の門より出で南の門より入る者は北の門より出べし其入りたる門より歸るべからず眞直に進みて出べし
Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango.
10 君彼らの中にありてその入る時に入りその出る時に出べし
Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango.
11 祭日と祝日には素祭として牛のために一エパ牡羊のために一エパ羔羊のためにその手の出し得る程を備へ一エパに油一ヒンを加ふべし
Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.
12 君もし自ら好んでヱホバに燔祭を備へんとし又は自ら好んで酬恩祭を備へんとせば彼のために東向の門を開くべし彼は安息日に爲ごとくその燔祭と酬恩祭を備ふべし又彼が出たる時はその出たる後に門を閉べし
Tango mokambi akobonzela Yawe mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kozongisa boyokani lokola likabo oyo akati na motema na ye moko, bakofungolela ye ekuke oyo etala na ngambo ya este; mpe akobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani ndenge kaka asalaka na mokolo ya Saba. Sima na yango nde akobima, mpe bakokanga ekuke sima na ye.
13 汝日々に一歳の全き羔羊一箇を燔祭としてヱホバに備ふべし即ち朝ごとにこれを備ふべし
Mokolo na mokolo, okobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba. Okobanda kobonza yango tongo nyonso.
14 汝朝ごとに素祭をこれに加ふべし即ち一エパの六分一と麥粉を濕す油一ヒンの三分一とを素祭としてヱホバに獻ぐべし是は長久に續くところの例典なり
Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso.
15 即ち朝ごとに羔羊と素祭と油とを燔祭にそなへて止ことなかるべし
Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso.
16 主ヱホバかく言たまふ君もし其子の一人に讓物をなす時は是その人の產業となりその子孫に傳はりて之が所有となるべし
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Soki mokambi apesi eloko lokola kado epai ya moko kati na bana na ye ya mibali, eloko yango ekozala ya mwana yango mpe ekotikala lokola libula ya bokitani mpo na bana na ye.
17 然ど若その產業の中をその僕の一人に與ふる時は是は解放の年までその人に屬し居て遂に君にかへるべし彼の產業は只その子孫にのみ傳はるべきなり
Kasi soki apesi epai ya moko kati na basali na ye kado ya eloko oyo ewuti na libula na ye, kado yango ekozala ya mosali yango kino na mobu ya kokangolama na ye; sima nde ekozonga na moboko ya mokambi, mpe libula na ye ekotikala ya bana na ye kaka.
18 君たる者は民の產業を取て民をその所有より逐放すべからず只己の所有の中をその子等に傳ふべし是わが民のその所有をはなれて散ことなからんためなり
Mokambi akoki kolongola eloko moko te kati na libula ya bato na ye mpo na kokomisa yango ya ye moko to kobengana bango na mabele na bango; soki alingi kokabela bana na ye libula, asengeli nde kozwa yango na libula na ye moko mpo ete bato na Ngai bapanzana te mosika ya libula na bango. › »
19 斯て彼門の傍の入口より我をたづさへいりて北向なる祭司の聖き室にいたるに西の奧に一箇の處あり
Moto yango akotisaki ngai, na nzela ya ekotelo oyo ezali pembeni ya ekuke ya ngambo ya nor, kati na bashambre ya bule ya Banganga-Nzambe, oyo etala na ngambo ya nor; alakisaki ngai esika moko oyo ezalaki na suka, na ngambo ya weste.
20 彼われに言けるは是は祭司が愆祭および罪祭の物を烹 素祭の物を拷ところなり斯するはこれを外庭に携へいでて民を聖くすることなからんためなり
Alobaki na ngai: « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. »
21 彼また我を外庭に携へいだして庭の四隅をとほらしむるに庭の隅々にまた庭あり
Abimisaki ngai na lopango ya libanda mpe atambolisaki ngai na basonge nyonso minei ya lopango. Na songe moko na moko ya lopango, namonaki lopango mosusu.
22 即ち庭の四隅に庭の設ありてその長四十キユビト廣三十キユビトなり四隅の處その寸尺みな同じ
Na basonge nyonso minei ya lopango ya libanda, ezalaki na mapango ya mike; mpe mapango nyonso minei ezalaki ndenge moko: bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse.
23 凡てその四の周圍なるその建物の下に烹飪の處造りてあり
Zingazinga ya moko na moko ya mapango nyonso minei, ezalaki na mir moko ya mokuse; mpe na se na yango, batandaki mabanga mpo na kopelisa moto na zingazinga ya mir yango ya mokuse.
24 彼われに云けるは是等は家の役者等が民の犧牲の品を烹る厨房なり
Moto yango alobaki na ngai: « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. »

< エゼキエル書 46 >