< エゼキエル書 30 >

1 ヱホバの言我にのぞみて言ふ
Yawe alobaki na ngai:
2 人の子よ預言して言へ主ヱホバかく言たまふ汝ら叫べ其日は禍なるかな
« Mwana na moto, sakola! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bolela mpe boloba: ‘Mawa mpo na mokolo wana!’
3 その日近しヱホバの日近し是雲の日これ異邦人の時なり
Pamba te mokolo yango ekomi pene; mokolo ya Yawe ekomi pene, mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.
4 劍エジプトに臨まん殺さるる者のエジプトに仆るる時エテオピアに痛苦あるべし敵その財寶を奪はんその基址は毀たるべし
Mopanga ekotelemela Ejipito, mpe somo makasi ekokanga mokili ya Kushi. Tango bato bakokufa na Ejipito, bakomema bomengo na yango mosika mpe miboko na yango ekobukana.
5 エテオピア人フテ人ルデ人凡て加勢の兵およびクブ人ならびに同盟の國の人々彼らとともに劍にたふれん
Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.
6 ヱホバかく言ふエジプトを扶くる者は仆れ其驕るところの勢力は失せんミグドルよりスエネにいたるまで人劍によりて己の中に仆るべし主ヱホバこれを言なり
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bikolo oyo esanganaki na Ejipito ekokweya mpe makasi oyo etielaka lolendo ekosila. Kobanda na Migidoli kino na Siene, bakokweya na mopanga elongo na Ejipito, elobi Nkolo Yawe.
7 其は荒て荒地の中にあり其邑々は荒たる邑の中にあるべし
Ejipito ekotikala lisusu na bato te kati na mikili oyo etikala na bato te, mpe bingumba na yango ekokoma ebeba kati na bingumba oyo ebeba.
8 我火をエジプトに降さん時又是を助くる者の皆ほろびん時は彼等我のヱホバなるを知ん
Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokitisa moto kati na Ejipito mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango.
9 その日には使者船にて我より出てかの心強きエテオピア人を懼れしめんエジプトの日にありし如く彼等の中に苦痛あるべし視よ是は至る
Na mokolo wana, bato oyo nakotinda bakokende na nzela ya masuwa mpo na kobundisa Kushi oyo ezali na yango na kimia. Somo makasi ekokanga bango na mokolo ya etumbu ya Ejipito; mpe mokolo yango ekomi solo pene.
10 主ヱホバかく言たまふ我バビロンの王ネブカデネザルをもてエジプトの喧噪を止むべし
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosukisa nguya ya mampinga ya Ejipito na nzela ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni.
11 彼および彼にしたがふ民即ち國民の中の暴き者を召來りてその國を滅さん彼ら劍をぬきてエジプトを攻めその殺せる者を國に滿すべし
Ye elongo na mampinga na ye ya basoda oyo baleki kanza kati na mampinga ya bikolo, bakoya kobebisa mokili. Bakobundisa Ejipito na mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bibembe.
12 我その河々を涸し國を惡き人の手に賣り外國人の手をもて國とその中の物を荒すべし我ヱホバこれを言り
Nakokawusa miluka ya Nili mpe nakokaba mokili epai ya bato mabe; nakobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango na nzela ya maboko ya bapaya. Ezali Ngai Yawe nde nalobi.
13 主ヱホバかく言たまふ我偶像を毀ち神々をノフに絕さんエジプトの國よりは再び君のいづることなかるべし我エジプトの國に畏怖を蒙らしめん
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
14 我バテロスを荒しゾアンに火を擧げノに鞫を行ひ
Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi.
15 わが怒をエジプトの要害なるシンに洩しノの群衆を絕つべし
Nakopelisela engumba Sini, ndako batonga makasi ya Ejipito, kanda na Ngai; mpe nakoboma ebele ya bavandi ya engumba Tebesi.
16 我火をエジプトに降さんシンは苦痛に悶えノは打破られノフは日中敵をうけん
Nakotia moto kati na Ejipito; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.
17 アベンとピベセテの少者は劍に仆れ其中の人々は擄ゆかれん
Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu.
18 テバネスに於ては吾がエジプトの軛を其處に摧く時に日暗くならんその誇るところの勢力は失せん雲これを覆はんその女子等は擄へゆかれん
Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
19 かく我エジプトに鞫をおこなはん彼等すなはち我のヱホバなるを知べし
Nakopesa Ejipito etumbu; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
20 十一年の一月の七日にヱホバの言われに臨みて言ふ
Na mokolo ya sambo ya sanza ya liboso, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
21 人の子よ我エジプトの王パロの腕を折れり是は再び束へて藥を施し裹布を卷て之を裹み強く爲して劍を執にたへしむること能はざるなり
« Mwana na moto, tala; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga.
22 是故に主ヱホバかく言たまふ視よ我エジプトの王パロを罰し其強き腕と折たる腕とを俱に折り劍をその手より落しむべし
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito; nakobuka maboko na ye nyonso mibale: ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.
23 我エジプト人を諸の民の中に散し諸の國に散さん
Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu.
24 而してバビロンの王の腕を強くして我劍をこれに授けん然ど我パロの腕を折れば彼は刺透されたる者の呻くが如くにその前に呻かん
Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.
25 我バビロンの王の腕を強くせんパロの腕は弱くならん我わが劍をバビロンの王の手に授けて彼をしてエジプトにむかひて之を伸しむる時は人衆我のヱホバなるを知ん
Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni, kasi maboko ya Faraon ekolemba. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakotia mopanga na Ngai kati na loboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobundisa na yango Ejipito.
26 我エジプト人を諸の民の中に散し諸の國に散さん彼らすなはち我のヱホバなるを知るべし
Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »

< エゼキエル書 30 >