< エゼキエル書 19 >

1 汝イスラエルの君等のために哀の詞をのべて
« Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba:
2 言ふべし汝の母なる牝獅は何故に牡獅の中に伏し小獅の中にその子を養ふや
‹ Mama na yo azalaki nani? Nkosi ya mwasi kati na bankosi! Ezalaki kovanda kati na bana na yango mpe kobokola bana yango.
3 彼その一の子を育てたれば小獅となりて食を攫ことを學ひ遂に人を食へり
Ekolisaki moko kati na bana na yango, mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
4 國々の人これの事を聞きこれを陷阱にて執へ鼻環をほどこしてこれをエジプトの地にひきいたれり
Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu; bakangaki yango bibende na zolo mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.
5 牝獅姑く待しがその望を失ひしを見たれば又一個の子を取てこれを小獅とならしむ
Tango mama ya nkosi yango emonaki ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela mpe elikya na yango esili, ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.
6 是すなはち牝獅の中に歩みて小獅となり食を攫ことを學ひしが亦人を食ひ
Ekomaki konguluma kati na bankosi, pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
7 其寡婦をしりその邑々を滅せりその咆哮聲によりてその地とその中に盈る者荒たり
Ekweyisaki bandako na bango ya makasi mpe ebebisaki bingumba na bango. Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna bazalaki kotondisama na somo.
8 是をもて四方の國人その國々より攻來り網をこれにうちかけ陷阱にてこれを執へ
Bongo bato ya bituka ya zingazinga, longwa na bikolo na bango, bayaki kotelemela yango, batielaki yango mitambo na bango mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.
9 鼻環をほどこして籠にいれ之をバビロンの王の許に曳いたりて城の中に携へ入れ其聲を再びイスラエルの山々に聞えざらしむ
Bakangaki yango minyololo, bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. Babwakaki yango na boloko mpo ete mongongo ya koganga na yango eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.
10 汝の母は汝の血にして水の側に植たる葡萄樹のごとし水の多きがために結實多く蔓はびこれり
Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
11 是に強き枝ありて君王等の杖となすべし是の長は雲に至りその衆多の枝のために高く聳えて見へたり
Bitape na yango ezalaki makasi, ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu; eyebanaki makasi mpo na molayi na yango mpe mpo na ebele ya makasa na yango.
12 然るに是怒をもて拔れて地に擲たる東風その實を吹乾かしその強き枝は折れて枯れ火に焚る
Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango.
13 今これは荒野にて乾ける水なき地に植りてあり
Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe, mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.
14 その枝の芽より火いでてその果を燒けば復強き枝の君王等の杖となるべき者其になし是哀の詞なり哀の詞となるべし
Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango mpe etumbi mbuma na yango; ata etape moko te ya makasi etikalaki mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »

< エゼキエル書 19 >