< 出エジプト記 36 >

1 偖ベザレルとアホリアブおよび凡て心の頴敏き人即ちヱホバが智慧と了知をあたへて聖所の用に供ふるところの諸の工をなすことを知得せしめたまへる者等はヱホバの凡て命じたまひし如くに事をなすべかりし
Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.
2 モーセすなはちベザレルとアホリアブおよび凡て心の頴敏き人すなはちその心にヱホバが智慧をさづけたまひし者凡そ來りてその工をなさんと心に望ところの者を召よせたり
Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango.
3 彼等は聖所の用にそなふるところの工事をなさしむるためにイスラエルの子孫が携へきたりし諸の献納物をモーセの手より受とりしが民は尚また朝ごとに自意の献納物をモーセに持きたる
Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
4 是に於て聖所の諸の工をなすところの智き人等みな各々その爲ところの工をやめて來り
Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango
5 モーセに告て言けるは民餘りに多く持きたればヱホバが爲せと命じたまひし工事をなすに用ふるに餘ありと
mpe bayaki koloba na Moyize: — Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki.
6 モーセすなはち命を傳へて營中に宣布しめて云く男女ともに今よりは聖所に獻納物をなすに及ばずと是をもて民は携へきたることを止たり
Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele: — Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo! Boye bato batikaki komema makabo,
7 其はその有ところの物すでに一切の工をなすに足て且餘あればなり
pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema: ezalaki kutu ya koleka.
8 偖彼等の中心に智慧ありてその工を爲るところの者十の幕をもて幕屋を造れりその幕は麻の撚糸と靑紫紅の絲をもて巧にケルビムを織なして作れる者なり
Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
9 その幕は各々長二十八キユビトその幕は各寛四キユビトその幕はみな寸尺一なり
Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
10 而してその幕五箇を互に連ねあはせ又その幕五箇をたがひに連ねあはせ
Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
11 一聯の幕の邊においてその連絡處の端に靑色の襟を造り又他の一聯の幕の邊においてその連絡處にこれを造れり
Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
12 一聯の幕に襟五十をつくりまた他の一聯の幕の連絡處の邊にも襟五十をつくれりその襟は彼と此と相對す
Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale; basinga yango etalanaki.
13 而して金の鈎五十をつくりその鈎をもてその幕を彼と此と相連ねたれば一箇の幕屋となる
Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko.
14 又山羊の毛をもて幕をつくりて幕屋の上の天幕となせりその造れる幕は十一なり
Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
15 その幕は各々長三十キユビトその幕はおのおの寛四キユビトにして十一の幕は寸尺同一なり
Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse.
16 その幕五を一幅に連ねまたその幕六を一幅に連ね
Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu.
17 その幕の邊において連絡處に襟五十をつくり又次の一連の幕の邊にも襟五十をつくれり
Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
18 又銅の鈎五十をつくりてその天幕をつらねあはせて一とならしめ
Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
19 赤染の牡羊の皮をもてその天幕の頂蓋をつくりてその上に貛の皮の蓋を設けたり
Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
20 又合歓木をもて幕屋の竪板をつくれり
Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango.
21 板の長は十キユビト板の寛は一キユビト半
Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
22 一の板に二の榫ありて彼と此と交指ふ幕屋の板には皆かくのごとく造りなせり
Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
23 又幕屋のために板を作れり即ち南に於は南の方に板二十枚
Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo,
24 その二十枚の板の下に銀の座四十をつくれり即ち此板の下にも二の座ありてその二の榫を承け彼板の下にも二の座ありてその二の榫を承く
mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale: makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale;
25 幕屋の他の方すなはちその北の方のためにも板二十枚を作り
bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
26 又その銀の座四十をつくれり即ち此板の下にも二の座あり彼板の下にも二の座あり
elongo na makolo na yango tuku minei ya palata: makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko;
27 又幕屋の後面すなはちその西のために板六枚をつくり
bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
28 幕屋の後の兩隅のために板二枚宛をつくれり
mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
29 その二枚は下にて相合しその頂まで一に連なれり一箇の環に於て然りその二枚ともに是のごとし是等は二隅のために設けたる者なり
Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso: nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo.
30 その板は八枚ありその座は銀の座十六座あり各々の板の下に二の座あり
Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba: makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
31 又合歓木をもて横木を作れり即ち幕屋の此方の板のために五本を設け
Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
32 幕屋の彼方の板のために横木五本を設け幕屋の後すなはちその西の板のために横木五本を設けたり
mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
33 又中間の横木をつくりて板の眞中において端より端まで通らしめ
Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo.
34 而してその板に金を着せ金をもて之がために鐶をつくりて横木をこれに貫き又その横木に金を着たり
Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya; mpe babambaki mabaya wolo.
35 又靑紫紅の絲および麻の撚絲をもて幕をつくり巧にケルビムをその上に織いだし
Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango.
36 それがために合歓木をもて四本の柱をつくりてこれに金を着せたりその鈎は金なり又銀をもてこれがために座四を鋳たり
Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata.
37 又靑紫紅の絲および麻の撚絲をもて幕屋の入口に掛る幔を織なし
Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
38 その五本の柱とその鈎とを造りその柱の頭と桁に金を着せたり但しその五の座は銅なりき
Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.

< 出エジプト記 36 >