< 出エジプト記 21 >

1 是は汝が民の前に立べき律例なり
Yawe alobaki na Moyize: — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele:
2 汝ヘブルの僕を買ふ時は六年の間之に職業を爲しめ第七年には贖を索ずしてこれを釋つべし
« Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
3 彼もし獨身にて來らば獨身にて去べし若妻あらばその妻これとともに去べし
Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.
4 もしその主人これに妻をあたへて男子又は女子これに生れたらば妻とその子等は主人に屬すべし彼は獨身にて去べし
Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye; mobali akokende ye moko.
5 僕もし我わが主人と我が妻子を愛す我釋たるるを好まずと明白に言ば
Kasi soki mowumbu alobi: ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, ›
6 その主人これを士師の所に携ゆき又戸あるひは戸柱の所につれゆくべし而して主人錐をもてかれの耳を刺とほすべし彼は何時までもこれに事ふべきなり
wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
7 人若その娘を賣て婢となす時は僕のごとくに去べからす
Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango.
8 彼もしその約せし主人の心に適ざる時はその主人これを贖はしむることを得べし然ど之に眞實ならずして亦これを異邦人に賣ことをなすを得べからず
Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye.
9 又もし之を己の子に與へんと約しなばこれを女子のごとくに待ふべし
Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi.
10 父もしその子のために別に娶ることあるとも彼に食物と衣服を與ふる事とその交接の道とはこれを間斷しむべからず
Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala.
11 其人かれに此三を行はずば彼は金をつくのはずして出さることを得べし
Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
12 人を撃て死しめたる妻は必ず殺さるべし
Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye.
13 若人みづから畫策ことなきに神人をその手にかからしめたまふことある時は我汝のために一箇の處を設くればその人其處に逃るべし
Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
14 人もし故にその隣人を謀りて殺す時は汝これをわが壇よりも執へゆきて殺すべし
Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.
15 その父あるひは母を撃ものは必ず殺さるべし
Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
16 人を拐帶したる者は之を賣たるも尚その手にあるも必ず殺さるべし
Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
17 その父あるひは母を罵る者は殺さるべし
Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
18 人相爭ふ時に一人石または拳をもてその對手を撃ちしに死にいたらずして床につくことあらんに
Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi;
19 若起あがりて杖によりて歩むにいたらば之を撃たる者は赦さるべし但しその業を休める賠償をなして之を全く愈しむべきなり
soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
20 人もし杖をもてその僕あるひは婢を撃んにその手の下に死ば必ず罰せらるべし
Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu.
21 然ど彼もし一日二日生のびなば其人は罰せられざるべし彼はその人の金子なればなり
Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
22 人もし相爭ひて妊める婦を撃ちその子を堕させんに別に害なき時は必ずその婦人の夫の要むる所にしたがひて刑られ法官の定むる所を爲べし
Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
23 若害ある時は生命にて生命を償ひ
Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi:
24 目にて目を償ひ歯にて歯を償ひ手にて手を償ひ足にて足を償ひ
liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo,
25 烙にて烙を償ひ傷にて傷を償ひ打傷にて打傷を償ふべし
kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu.
26 人もしその僕の一の目あるひは婢の一の目を撃てこれを喪さばその目のために之を釋つべし
Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye.
27 又もしその僕の一箇の歯か婢の一箇の歯を打落ばその歯のために之を釋つべし
Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye.
28 牛もし男あるひは女を衝て死しめなばその牛をば必ず石にて撃殺すべしその肉は食べからず但しその牛の主は罪なし
Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te.
29 然ど牛もし素より衝くことをなす者にしてその主これがために忠告をうけし事あるに之を守りおかずして遂に男あるひは女を殺すに至らしめなばその牛は石にて撃れその主もまた殺さるべし
Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa.
30 若彼贖罪金を命ぜられなば凡てその命ぜられし者を生命の償に出すべし
Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye.
31 男子を衝も女子を衝もこの例にしたがひてなすべし
Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke.
32 牛もし僕あるひは婢を衝ばその主人に銀三十シケルを與ふべし又その牛は石にて撃ころすべし
Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.
33 人もし坑を啓くか又は人もし穴を掘ことをなしこれを覆はずして牛あるひは驢馬これに陷ば
Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna;
34 穴の主これを償ひ金をその所有主に與ふべし但しその死たる畜は己の有となるべし
nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye.
35 此人の牛もし彼人のを衝殺さば二人その生る牛を賣てその價を分つべし又その死たるものをも分つべし
Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa.
36 然どその牛素より衝ことをなす者なること知をるにその主これを守りおかざりしならばその人かならず牛をもて牛を償ふべし但しその死たる者は己の有となるべし
Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye.

< 出エジプト記 21 >