< 出エジプト記 11 >

1 ヱホバ、モーセにいひたまひけるは我今一箇の災をパロおよびエジプトに降さん然後かれ汝等を此處より去しむべし彼なんぢらを全く去しむるには必ず汝らを此より逐はらはん
Yawe alobaki na Moyize: « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende; kutu, akobengana bino libela.
2 然ば汝民の耳にかたり男女をしておのおのその隣々に銀の飾品金の飾具を乞しめよと
Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo: mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »
3 ヱホバつひに民をしてエジプト人の恩を蒙らしめたまふ又その人モーセはエジプトの國にてパロの臣下の目と民の目に甚だ大なる者と見えたり
Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.
4 モーセいひけるはヱホバかく言たまふ夜半頃われ出てエジプトの中に至らん
Moyize alobaki na Faraon: « Tala makambo oyo Yawe alobi: ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito.
5 エジプトの國の中の長子たる者は位に坐するパロの長子より磨の後にをる婢の長子まで悉く死べし又獣畜の首出もしかり
Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele.
6 而してエジプト全國に大なる號哭あるべし是まで是のごとき事はあらずまた再び斯ること有ざるべし
Bongo koganga makasi ekozala na mokili mobimba ya Ejipito, koganga oyo ezala nanu te mpe ekotikala kozala te.
7 然どイスラエルの子孫にむかひては犬もその舌をうごかさじ人にむかひても獣畜にむかひても然り汝等これによりてヱホバがエジプト人とイスラエルのあひだに區別をなしたまふを知べし
Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele.
8 汝の此臣等みなわが許に下り來てわれを拝し汝となんぢに從がふ民みな出よと言ん然る後われ出べしと烈しく怒りてパロの所より出たり
Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba: ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.
9 ヱホバ、モーセにいひたまひけるはパロ汝に聽ざるべし是をもて吾がエジプトの國に奇蹟をおこなふこと増べし
Yawe alobaki na Moyize: « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. »
10 モーセとアロンこの諸の奇蹟をことごとくパロの前に行ひたれどもヱホバ、パロの心を剛愎にしたまひければ彼イスラエルの子孫をその國より去しめざりき
Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.

< 出エジプト記 11 >