< ダニエル書 1 >

1 ユダの王エホヤキムの治世の第三年にバビロンの王ネブカデネザル、ヱルサレムにきたりて之を攻圍みしに
Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
2 主ユダの王ヱホヤキムと神の家の器具幾何とをかれの手にわたしたまひければ則ちこれをシナルの地に携へゆきて己の神の家にいたりその器具を己の神の庫に蔵めたり
Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.
3 茲に王寺人の長アシベナズに命じてイスラエルの子孫の中より王の血統の者と貴族たる者幾何を召寄しむ
Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ashipenazi, mokonzi ya bakalaka na ye ya lokumu, ete ayeisa na Babiloni ndambo ya bana ya Isalaele oyo babotama na mabota ya bakonzi to ya bato ya lokumu,
4 即ち身に疵なく容貌美しくして一切の智慧の道に頴く知識ありて思慮深く王の宮に侍るに足る能幹ある少き者を召寄しめこれにカルデヤ人の文學と言語とを學ばせんとす
bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
5 是をもて王は命を下して日々に王の用ゐる饌と王の飮む酒とを彼らに與へしめ三年の間かく彼らを養ひ育てしめんとす是その後に彼らをして王の前に立ことを得せしめんとてなり
Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela: nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.
6 是等の中にユダの人ダニエル、ハナニヤ、ミシヤエル、アザリヤありしが
Kati na ndambo ya bato oyo bawutaki na Yuda, ezalaki na Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria.
7 寺人の長かれらに名をあたへてダニエルをベルテシヤザルと名けハナニヤをシヤデラクと名けミシヤエルをメシヤクと名けアザリヤをアベデネゴと名く
Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika; apesaki Daniele kombo Belitsatsari; Anania, Shadraki; Mikaeli, Meshaki; mpe Azaria, Abedinego.
8 然るにダニエルは王の用ゐる饌と王の飮む酒とをもて己の身を汚すまじと心に思ひさだめたれば己の身を汚さざらしめんことを寺人の長に求む
Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.
9 以前よりヱホバ、ダニエルをして寺人の長の慈悲と寵愛とを蒙らしめたまふ
Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.
10 是において寺人の長ダニエルに言けるは吾主なる王すでに命をくだして汝らの食物と汝らの飮物とを頒たしめたまへば我かれを畏る恐くは彼なんぢらの面の其同輩の少者等と異にして憂色あるを見ん然る時は汝らのために我首王の前に危からん
Kasi mokonzi ya bakalaka ya lokumu alobaki na Daniele: — Nazali kobanga mokonzi, nkolo na ngai, oyo akateli bino bilei oyo bosengeli kolia mpe masanga oyo bosengeli komela! Mpo na nini bokolinga ete mokonzi amona bilongi na bino ekonda koleka bilongi ya bilenge mosusu ya mibu na bino? Bomoni te ete wana bokobomisa ngai epai ya mokonzi?
11 寺人の長はメルザル官をしてダニエル、ハナニヤ、ミシヤエル及びアザリヤを監督らせ置たればダニエル之に言けるは
Daniele alobaki na mosali oyo mokonzi ya bakalaka ya lokumu aponaki mpo ete abatela Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria:
12 請ふ十日の間僕等を驗したまへ即ち我らには菜蔬を與へて食せ水を與へて飮せよ
« Nabondeli yo, meka basali na yo mikolo zomi: pesa biso kaka bandunda lokola bilei mpe mayi mpo na komela; kopesa biso eloko mosusu te!
13 而して我らの面と王の饌を食ふ少者どもの面とを較べ見汝の視るところにしたがひて僕等を待ひたまへと
Sima na mikolo yango, okotala yo moko bilongi na biso mpe bilongi ya bilenge mosusu oyo bazali kolia bilei ya mokonzi; bongo okosala basali na yo ndenge yo moko okomona. »
14 是において彼この事を聽いれ十日のあひだ彼らを驗しけるが
Mosala andimaki bosenga na bango mpe amekaki bango mikolo zomi.
15 十日の後にいたりて見るに王の饌を食へる諸の少者よりも彼らの面は美しくまた肥え膩つきてありければ
Sima na mikolo yango zomi, bakomaki bilongi kitoko mpe banzoto ngebungebu koleka bilenge oyo bazalaki kolia bilei ya mokonzi.
16 メルザル官すなはち彼らの分なる饌と彼らの飮べき酒とを撤きさりて菜蔬をこれに與へたり
Boye, mosali yango akomaki kotia pembeni bilei mpe vino oyo bazalaki kobongisela bango mpe kopesa bango kaka bandunda.
17 この四人の少者には神知識を得させ諸の文學と智慧に頴からしめたまへりダニエはまた能く各諸の異象と夢兆を暁る
Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso: koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.
18 王かねて命をくだし少者どもを召いるる迄に經べき日を定めおきしがその日數も過たるに因て寺人の長かれらを引てネブカデザルの前にいたりければ
Sima na mikolo oyo mokonzi akataki mpo ete bamemela ye bango, mokonzi ya bakalaka ya lokumu amemaki bango liboso ya Nabukodonozori.
19 王かれらと言談へり彼ら一切の中にはダニエル、ハナニヤ、ミシヤエル、アザリヤに比ぶ者あらざりければこの四人は王の前に侍れり
Mokonzi asololaki na bango; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.
20 王かれらに諸の事を詢たづね見に彼らは智慧の學においてその全國の博士と法術士に愈ること十倍なり
Na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kotuna bango, oyo ezalaki kosenga bwanya mpe bososoli, amonaki ete bazali mayele mbala zomi koleka bato ya soloka mpe ya maji ya mokili na ye mobimba.
21 ダニエルはクロス王の元年までありき
Mpe Daniele awumelaki kosala kati na ndako ya mokonzi kino na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi.

< ダニエル書 1 >