< サムエル記Ⅱ 13 >
1 此後ダビデの子アブサロムにタマルと名くる美しき妹ありしがダビデの子アムノンこれを戀ひたり
Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka.
2 アムノン心を苦しめて遂に其姉妹タマルのためにわづらへり其はタマルは處女なりければアムノンかれに何事をも爲しがたしと思ひたればなり
Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola.
3 然るにアムノンに一人の朋友ありダビデの兄弟シメアの子にして其名をヨナダブといふヨナダブに甚だ有智き人なり
Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi.
4 彼アムノンにいひけるは汝王の子なんぞ日に日に斯く痩ゆくや汝我に告ざるやアムノン彼にいひけるは我わが兄弟アブサロムの妹タマルを戀ふ
Atunaki Aminoni: — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo? Aminoni alobaki na ye: — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
5 ヨナダブかれにいひけるは床に臥て病と佯り汝の父の來りて汝を見る時これにいへ請ふわが妹タマルをして來りて我に食を予へしめわが見て彼の手より食ふことをうる樣にわが目のまへにて食物を調理しめよと
Yonadabi alobaki na ye: — Oh, sala boye: « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye: ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › »
6 アムノンすなはち臥して病と佯りしが王の來りておのれを見る時アムノン王にいひけるは請ふ吾妹タマルをして來りてわが目のまへにて二の菓子を作へしめて我にかれの手より食ふことを得さしめよと
Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye: « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
7 是においてダビデ、タマルの家にいひつかはしけるは汝の兄アムノンの家にゆきてかれのために食物を調理よと
Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye: « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
8 タマル其兄アムノンの家にいたるにアムノンは臥し居たりタマル乃ち粉をとりて之を摶てかれの目のまへにて菓子を作へ其菓子を燒き
Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango.
9 鍋を取て彼のまへに傾出たりしかれども彼食ふことを否めりしかしてアムノンいひけるは汝ら皆我を離れていでよと皆かれをはなれていでたり
Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki: — Bimisa bato nyonso libanda. Bato nyonso babimaki.
10 アムノン、タマルにいひけるは食物を寝室に持きたれ我汝の手より食はんとタマル乃ち己の作りたる菓子を取りて寝室に持ゆきて其兄アムノンにいたる
Aminoni alobaki na Tamari: — Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo. Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala.
11 タマル彼に食しめんとて近く持いたれる時彼タマルを執へて之にいひけるは妹よ來りて我と寝よ
Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye: — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.
12 タマルかれにいひける否兄上よ我を辱しむるなかれ是のごとき事はイスラエルに行はれず汝此愚なる事をなすべからず
Tamari alobaki na ye: — Te, ndeko na ngai ya mobali! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele! Kosala bozoba ya boye te.
13 我は何處にわが恥辱を棄んか汝はイスラエルの愚人の一人となるべしされば請ふ王に語れ彼我を汝に予ざることなかるべしと
Ekosukela ngai ndenge nini? Nakokende wapi na soni na ngai? Mpe yo okozala ndenge nini? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai.
14 然どもアムノン其言を聽ずしてタマルよりも力ありければタマルを辱しめてこれと偕に寝たりしが
Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.
15 遂にアムノン甚だ深くタマルを惡むにいたる其かれを惡む所の惡みはかれを戀ひたるところの戀よりも大なり即ちアムノンかれにいひけるは起て往けよ
Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari: — Telema mpe bima!
16 かれアムノンにいひけるは我を返して此惡を作るなかれ是は汝がさきに我になしたる所の惡よりも大なりとしかれども聽いれず
Tamari azongiselaki ye: — Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai! Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye.
17 其側に仕ふる少者を呼ていひけるは汝此女をわが許より遣りいだして其後に戸を楗せと
Abengaki mosali na ye mpe alobaki: « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. »
18 タマル振袖を着ゐたり王の女等の處女なるものは斯のごとき衣服をもて粧ひたりアムノンの侍者かれを外にいだして其後に戸を楗せり
Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.
19 タマル灰を其首に蒙り着たる振袖を裂き手を首にのせて呼はりつつ去ゆけり
Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
20 其兄アブサロムかれにいひけるは汝の兄アムノン汝と偕に在しや然ど妹よ默せよ彼は汝の兄なり此事を心に留るなかれとかくてタマルは其兄アブサロムの家に凄しく住み居れり
Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye: « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te! » Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.
Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi.
22 アブサロムはアムノンにむかひて善も惡きも語ざりき其はアブサロム、アムノンを惡みたればたり是はかれがおのれの妹タマルを辱しめたるに由り
Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
23 全二年の後アブサロム、エフライムの邊なるバアルハゾルにて羊の毛を剪しめ居て王の諸子を悉く招けり
Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi.
24 アブサロム王の所にいりていひけるは視よ僕羊の毛を剪しめをるねがはくは王と王の僕等僕とともに來りたまへ
Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo.
25 王アブサロムに云けるは否わが子よ我儕を皆いたらしむるなかれおそらくは汝の費を多くせんアブサロム、ダビデを強ふしかれどもダビデ往ことを肯ぜずして彼を祝せり
Mokonzi azongisaki: — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.
26 アブサロムいひけるは若しからずば請ふわが兄アムノンをして我らとともに來らしめよ王かれにいひけるは彼なんぞ汝とともにゆくべけんやと
Abisalomi alobaki lisusu: — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. Mokonzi atunaki ye: — Mpo na nini akende elongo na yo?
27 されどアブサロムかれを強ければアムノンと王の諸子を皆アブサロムとともにゆかしめたり
Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.
28 爰にアブサロム其少者等に命じていひけるは請ふ汝らアムノンの心の酒によりて樂む時を視すましてわが汝等にアムノンを撃てと言ふ時に彼を殺せ懼るるなかれ汝等に之を命じたるは我にあらずや汝ら勇しく武くなれと
Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye: — Boyoka! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino: « Bobeta Aminoni; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.
29 アブサロムの少者等アブサロムの命ぜしごとくアムノンになしければ王の諸子皆起て各其騾馬に乗て逃たり
Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.
30 彼等が路にある時風聞ダビデにいたりていはくアブサロム王の諸子を悉く殺して一人も遺るものなしと
Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi: « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. »
31 王乃ち起ち其衣を裂きて地に臥す其臣僕皆衣を裂て其傍にたてり
Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka.
32 ダビデの兄弟シメアの子ヨナダブ答へていひけるは吾主よ王の御子等なる少年を皆殺したりと思たまふなかれアムノン獨り死るのみ彼がアブサロムの妹タマルを辱かしめたる日よりアブサロム此事をさだめおきたるなり
Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki: « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye.
33 されば吾主王よ王の御子等皆死りといひて此事をおもひ煩ひたまふなかれアムノン獨死たるなればなりと
Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
34 斯てアブサロムは逃れたり爰に守望ゐたる少者目をあげて視たるに視よ山の傍よりして己の後の道より多くの人來れり
Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi: « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
35 ヨナダブ王にいひけるは視よ王の御子等來る僕のいへるがごとくしかりと
Yonadabi alobaki na mokonzi: — Tala! Bana mibali ya mokonzi bazali koya! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki.
36 彼語ることを終し時視よ王の子等來り聲をあげて哭り王と其僕等も皆大に甚く哭り
Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.
37 偖アブサロムは逃てゲシユルの王アミホデの子タルマイにいたるダビデは日々其子のために悲めり
Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.
38 アブサロム逃てゲシユルにゆき三年彼處に居たり
Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato.
39 ダビデ王アブサロムに逢んと思ひ煩らふ其はアムノンは死たるによりてダビデかれの事はあきらめたればなり
Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.