< 列王記Ⅱ 7 >

1 エリシヤ言けるは汝らヱホバの言を聽けヱホバかく言たまふ明日の今頃サマリヤの門にて麥粉一セアを一シケルに賣り大麥二セアを一シケルに賣にいたらん
Elize alobaki: — Boyoka Liloba na Yawe! Tala makambo oyo Yawe alobi: « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
2 時に一人の大將すなはち王のその手に依る者神の人に答へて言けるは由やヱホバ天に窓をひらきたまふも此事あるべけんやエリシヤいひけるは汝は汝の目をもて之を見ん然どこれを食ふことはあらじ
Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe: — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema? Elize azongisaki: — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.
3 茲に城邑の門の入口に四人の癩病人をりしが互に言けるは我儕なんぞ此に坐して死るを待べけんや
Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango: « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa?
4 我ら若邑にいらんと言ば邑には食物竭てあれば我ら其處に死んもし又此に坐しをらば同く死ん然ば我儕ゆきてスリアの軍勢の所にいたらん彼ら我らを生しおかば我儕生ん若われらを殺すも死るのみなりと
Soki tolobi: ‹ Tokota na engumba, › nzala makasi ezali kuna, tokokufa. Soki mpe totikali awa, tokokufa kaka. Boye, tika ete tokende na molako ya bato ya Siri mpe tomipesa epai na bango. Soki bayambi biso, tobiki; kasi soki babomi biso, tokufi kaka. »
5 すなはちスリア人の陣營にいたらんとて黄昏に起あがりしがスリアの陣營の邊にいたりて視に一人も其處にをる者なし
Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,
6 是より先に主スリアの軍勢をして車の聲馬の聲大軍の聲を聞しめたまひしかば彼ら互に言けるは視よイスラエルの王われらに敵せんとてヘテ人の王等およびエジプトの王等を傭ひきたりて我らを襲はんとすと
pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango: « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »
7 すなはち黄昏に起て逃げその天幕と馬と驢馬とを棄て陣營をその儘になしおき生命を全うせんとて逃たり
Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango.
8 かの癩病人等陣營の邊に至りしが遂に一の天幕にいりて食飮し其處より金銀衣服を持さりて往てこれを隱し又きたりて他の天幕にいり其處よりも持さりて往てこれを隱せり
Bato na maba bakomaki na mondelo ya molako, bakotaki na ndako moko ya kapo, baliaki mpe bamelaki. Bongo bamemaki palata, wolo, bilamba, mpe bakendeki kobomba yango. Sima, bazongaki, bakotaki na ndako mosusu ya kapo, bazwaki kuna biloko mpe bakendeki lisusu kobomba yango.
9 かくて彼等互に言けるは我儕のなすところ善らず今日は好消息ある日なるに我儕は默し居る若夜明まで待ば菑害身におよばん然ば來れ往て王の眷屬に告んと
Bongo balobanaki bango na bango: « Tozali kosala malamu te: Mokolo ya lelo ezali mokolo ya sango malamu, mpe tozali kobomba sango yango mpo na biso moko! Soki tozeli kino lobi na tongo, tokozwa etumbu. Tokende sik’oyo kopesa sango na ndako ya mokonzi. »
10 すなはち來りて邑の門を守る者を呼びこれに告て言けるは我儕スリア人の陣營にいたりて視に其處には一人も居る者なく亦人の聲もせず但馬のみ繋ぎてあり驢馬のみ繋ぎてあり天幕は其儘なりと
Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango: « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »
11 是において門を守る者呼はりてこれを王の家の中に報せたれば
Bakengeli ekuke ya engumba babengaki moto moko kati na engumba mpo na kokomisa sango na ndako ya mokonzi.
12 王夜の中に興いでてその臣下に言けるは我スリア人が我儕になせる所の如何を汝等に示さん彼等はわれらの饑たるを知が故に陣營を去て野に隱る是はイスラエル人邑を出なば生擒て邑に推いらんと言て然せるなり
Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye: — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango: « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »
13 その臣下の一人對へて言けるは請ふ尚遺されて邑に存れる馬の中五匹を取しめよ我儕人を遣て窺はしめん視よ是等は邑の中に遺れるイスラエルの全群衆のごとし視よ是等は滅び亡たるイスラエルの全群衆のごとくなりと
Moko kati na bakalaka na ye azongisaki: — Bongisa ndambo ya mibali mpo ete bazwa bampunda mitano kati na oyo etikali kati na engumba. Tokobungisa ata eloko moko te, pamba te suka na bango ekozala ndenge moko na oyo ya bana nyonso ya Isalaele oyo batikali na engumba. Boye totinda bango kaka mpo toyeba makambo oyo ewuti kosalema.
14 是において二輛の戰車とその馬を取り王すなはち往て見よといひて人を遣はしてスリアの軍勢の跡を尾しめたれば
Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango: « Bokende mpe botala! »
15 彼らその跡を尾てヨルダンにいたりしが途には凡てスリア人が狼狽逃る時に棄たる衣服と器具盈りその使者かへりてこれを王に告ければ
Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.
16 民いでてスリア人の陣營を掠めたり斯在しかば麥粉一セアは一シケルとなり大麥二セアは一シケルと成るヱホバの言のごとし
Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.
17 爰に王その手に依ところの彼大將を立て門を司らしめたるに民門にて彼を踐たれば死り即ち神の人が王のおのれに下り來し時に言たる言のごとし
Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye.
18 又神の人が王につげて明日の今頃サマリヤの門にて大麥二セアを一シケルに賣り麥粉二セアを一シケルに賣にいたらんと言しごとくに成ぬ
Makambo oyo esalemaki ndenge moto na Nzambe alobaki na mokonzi: « Lobi, na tango oyo, bakoteka na ekuke ya Samari bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
19 彼大將その時に神の人にこたへてヱホバ天に窓をひらきたまふも此事あるべけんやと言たりしかば答へて汝目をもてこれを見べけれどもこれを食ふことはあらじと言たりしが
Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, alobaki na moto na Nzambe: — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema? Mpe Elize, moto na Nzambe, azongisaki: — Okomona yango na miso, kasi okolia yango te.
20 そのごとくになりぬ即ち民門にてかれを踐て死しめたり
Makambo yango esalemaki ndenge kaka elobamaki na tina na ye: bato banyataki ye na ekuke ya engumba, mpe akufaki.

< 列王記Ⅱ 7 >