< サムエル記Ⅰ 7 >

1 キリアテヤリムの人來りヱホバのはこを携へのぼりこれを山のうへなるアビナダブの家にもちきたり其子エレアザルを聖てヱホバの櫃をまもらしむ
Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.
2 其櫃キリアテヤリムにとどまること久しくして二十年をへたりイスラエルの全家ヱホバをしたひて歎けり
Wuta mokolo Sanduku ya Yawe ekomaki na Kiriati-Yearimi, elekaki mikolo ebele: mibu pene tuku mibale. Mpe bato nyonso ya Isalaele bayokaki posa ya kozonga epai na Yawe.
3 時にサムエル、イスラエルの全家に告ていひけるは汝らもし一心を以てヱホバにかへり異る神とアシタロテを汝らの中より棄て汝らの心をヱホバに定め之にのみ事へなばヱホバ汝らをペリシテ人の手より救ひださん
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele: « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »
4 ここにおいてイスラエルの人々バアルとアシタロテをすててヱホバにのみ事ふ
Bato ya Isalaele balongolaki kati na bango banzambe Bala mpe bikeko ya Asitarite, mpe basalelaki kaka Yawe.
5 サムエルいひけるはイスラエル人をことごとくミズパにあつめよ我汝らのためにヱホバにいのらん
Samuele alobaki na bango: « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. »
6 かれらミズパに集り水を汲て之をヱホバのまへに注ぎ其日斷食して彼處にいひけるは我等ヱホバに罪ををかしたりとサムエル、ミズパに於てイスラエルの人を鞫く
Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba: « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.
7 ペリシテ人イスラエルの人々のミズパに集れるを聞しかばペリシテ人の諸君主イスラエルにせめのぼれりイスラエル人これを聞てペリシテ人をおそれたり
Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.
8 イスラエルの人々サムエルに云けるは我らのために我らの神ヱホバに祈ることをやむるなかれ然らばヱホバ我らをペリシテ人の手よりすくひいださん
Bato ya Isalaele balobaki na Samuele: « Kotika te kosambela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso mpo ete abikisa biso na maboko ya bato ya Filisitia. »
9 サムエル哺乳羊をとり燔祭となしてこれをまつたくヱホバにささぐまたサムエル、イスラエルのためにヱホバにいのりければヱホバこれにこたへたまふ
Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye.
10 サムエル燔祭をささげ居し時ペリシテ人イスラエル人と戰はんとて近づきぬ是日ヱホバ大なる雷をくだしペリシテ人をうちて之を亂し賜ければペリシテ人イスラエル人のまへに敗れたり
Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.
11 イスラエル人ミズパをいでてペリシテ人をおひ之をうちてベテカルの下にいたる
Bato ya Isalaele babimaki na Mitsipa, balandaki bato ya Filisitia kino na se ya Beti-Kari mpe babomaki bango.
12 サムエル一の石をとりてミズパとセンの間におきヱホバ是まで我らを助けたまへりといひて其名をエベネゼル(助けの石)と呼ぶ
Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri » mpo na koloba: « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »
13 ペリシテ人攻伏られて再びイスラエルの境にいらずサムエルの一生のあひだヱホバの手ペリシテ人をふせげり
Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.
14 ペリシテ人のイスラエルより取たる邑々はエクロンよりガテまでイスラエルにかへりぬまた其周圍の地はイスラエル人これをペリシテ人の手よりとりかへせりまたイスラエル人とアモリ人と好をむすべり
Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.
15 サムエル一生のあひだイスラエルをさばき
Samuele akambaki Isalaele mikolo nyonso ya bomoi na ye.
16 歳々ベテルとギルガルおよびミズパをめぐりて其處々にてイスラエル人をさばき
Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.
17 またラマにかへれり此處に其家あり此にてイスラエルをさばき又此にてヱホバに壇をきづけり
Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.

< サムエル記Ⅰ 7 >