< サムエル記Ⅰ 23 >

1 人々ダビデにつげていひけるは視よペリシテ人ケイラを攻め穀場を掠むと
Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango,
2 ダビデ、ヱホバに問ていひけるは我ゆきて是のペリシテ人を撃つべきかとヱホバ、ダビデにいひたまひけるは往てペリシテ人をうちてケイラを救ヘ
Davidi atunaki Yawe, alobaki: — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia? Yawe azongiselaki ye: — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.
3 ダビデの從者かれにいひけるは視よわれら此にユダにあるすら尚ほおそる况やケイラにゆきてペリシテ人の軍にあたるをやと
Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye: — Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia?
4 ダビデふたたびヱホバに問ひけるにヱホバ答ていひたまひけるは起てケイラにくだれ我ペリシテ人を汝の手にわたすべし
Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye: — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
5 ダビデとその從者ケイラにゆきてペリシテ人とたたかひ彼らの家畜を奪ひとり大にかれらをうちころせりかくダビデ、ケイラの居民をすくふ
Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila.
6 アヒメレクの子アビヤタル、ケイラにのがれてダビデにいたれる時其手にエポデを執てくだれり
Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
7 爰にダビデのケイラに至れる事サウルに聞えければサウルいふ神かれを我手にわたしたまへり其はかれ門あり關ある邑にいりたれば閉こめらるればなり
Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki: « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »
8 サウルすなはち民をことごとく軍によびあつめてケイラにくだりてダビデと其從者を圍んとす
Saulo asangisaki mampinga na ye nyonso mpo na bitumba, mpo ete bakende na Keila kozingela Davidi elongo na bato na ye.
9 ダビデはサウルのおのれを害せんと謀るを知りて祭司アビヤタルにいひけるはエポデを持ちきたれと
Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
10 しかしてダビデいひけるはイスラエルの神ヱホバよ僕たしかにサウルがケイラにきたりてわがために此邑をほろぼさんと求むるを聞り
Davidi alobaki: — Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai.
11 ケイラの人々我をかれの手にわたすならんか僕のきけるごとくサウル下るならんかイスラエルの神ヱホバよ請ふ僕につげたまへとヱホバいひたまひけるは彼下るべしと
Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. Yawe alobaki: — Iyo, akoya penza.
12 ダビデいひけるはケイラの人々われとわが從者をサウルの手にわたすならんかヱホバいひたまひけるは彼らわたすべし
Davidi atunaki lisusu: — Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo? Yawe alobaki: — Iyo, bakokaba yo.
13 是においてダビデと其六百人ばかりの從者起てケイラをいで其ゆきうる所にゆけりダビデのケイラをにげはなれしことサウルに聞えければサウルいづることを止たり
Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.
14 ダビデは曠野にをり要害の地にをりまたジフの野にある山に居るサウル恒にかれを尋ねたれども神かれを其手にわたしたまはざりき
Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.
15 ダビデ、サウルがおのれの生命を求めんために出たるを見る時にダビデはジフの野の叢林にをりしが
Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye.
16 サウルの子ヨナタンたちて叢林にいりてダビデにいたり神によりて其力を強うせしめたり
Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe.
17 即ちヨナタンかれにいひけるに懼るるなかれわが父サウルの手汝にとどくことあらじ汝はイスラエルの王とならん我は汝の次なるべし此事はわが父サウルもしれりと
Alobaki na ye: « Kobanga te! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
18 かくて彼ら二人ヱホバのまへに契約をむすびダビデは叢林にとどまりヨナタンは其家にかへれり
Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.
19 時にジフ人ギベアにのぼりサウルの許にいたりていひけるはダビデは曠野の南にあるハキラの山の叢林の中なる要害に隱れて我らとともにをるにあらずや
Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye: — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni?
20 今王汝のくだらんとする望のごとく下りたまへ我らはかれを王の手にわたさんと
Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi.
21 サウルいひけるは汝ら我をあはれめば願くは汝等ヱホバより福祉をえよ
Saulo azongisaki: — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai!
22 請ふゆきて尚ほ心を用ひ彼の踪跡ある處と誰がかれを見たるかを見きはめよ其は人我にかれが甚だ機巧く事を爲すを告たれば也
Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi.
23 されば汝ら彼が隱るる逃躱處を皆たしかに見きはめて再び我にきたれ我汝らとともにゆかん彼もし其地にあらば我ユダの郡中をあまねく尋ねて彼を獲んと
Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.
24 かれらたちてサウルに先てジフにゆけりダビデと其從者は曠野の南のアラバにあるマオンの野にをる
Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.
25 斯てサウルと其從者ゆきて彼を尋ぬ人々これをダビデに告ければダビデ巌を下てマオンの野にをるサウル之を聞てマオンの野に至てダビデを追ふ
Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi.
26 サウルは山の此旁に行ダビデと其從者は山の彼旁に行ダビデは周章てサウルの前を避んとしサウルと其從者はダビデと其從者を圍んで之を取んとす
Saulo azalaki kotambola na ngambo moko ya ngomba, bongo Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na ngambo mosusu mpe kokima mbangu mosika na Saulo. Lokola Saulo mpe mampinga na ye bazalaki koluka kozingela Davidi mpe bato na ye mpo na kokanga bango,
27 時に使者サウルに來て言けるはペリシテ人國ををかす急ぎきたりたまへと
momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye: « Yaka noki! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. »
28 故にサウル、ダビデを追ことを止てかへり往てペリシテ人にあたるここをもて人々その處をセラマレコテ(逃岩)となづく
Mbala moko, Saulo atikaki kolanda Davidi mpo na kokende kokutana na bato ya Filisitia. Yango wana babengaka esika yango « Sela-Amalekoti » oyo elakisi « Libanga ya bokabwani. »
29 ダビデ其處よりのぼりてエンゲデの要害にをる
Davidi alongwaki wana mpe akendeki kovanda na ebombamelo kati na mabanga ya Eyini-Gedi.

< サムエル記Ⅰ 23 >