< 歴代誌Ⅰ 20 >

1 年かへりて王等の戰爭に出る時におよびてヨアブ軍勢を率ゐて出でアンモン人の地を打荒し往てラバを攻圍りされどダビデはヱルサレムに止まりたりヨアブつひにラバを撃壞りてこれを滅ぼせり
Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Joabi akambaki mampinga na bitumba mpe abebisaki mokili ya bato ya Amoni; bongo akendeki kotonga molako liboso ya Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. Joabi abundisaki engumba Raba mpe apanzaki yango.
2 ダビデ彼らの王の冠冕をその首より取はなしたりしがその金の重を量り見るに一タラントありまたその中に寶石を嵌たるありき之をダビデの首に冠らせたり彼また甚だ衆多の掠取物をその邑より取り
Davidi alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Bamonaki ete esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
3 而して彼またその中の民を曳いだし鋸と鐵の打車と斧とをもてこれを斬りダビデ、アンモンの子孫の一切の邑に斯く爲り而してダビデとその民はみなヱルサレムに歸りぬ
Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni; bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
4 この後ゲゼルにおいてペリシテ人と戰爭おこりたりしがその時にホシヤ人シベカイ巨人の子孫の一人なるシバイを殺せり彼等つひに攻伏られき
Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.
5 復ペリシテ人と戰爭ありしがヤイルの子エルハナン、ガテのゴリアテの兄弟ラミを殺せりラミの槍の柄は機の滕の如くなりき
Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia; mpe Elanani, mwana mobali ya Yairi, abomaki Lami, ndeko mobali ya Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
6 またガテに戰爭ありしが其處に一人の身長き人ありその手の指と足の趾は六宛にして合せて二十四あり彼も巨人の生る者なりき
Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
7 彼イスラエルを挑みしかばダビデの兄弟シメアの子ヨナタンこれを殺せり
Atiolaki Isalaele; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
8 是等はガテにて巨人の生る者なりしがダビデの手とその臣僕の手に斃れたり
Bato wana bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.

< 歴代誌Ⅰ 20 >