< Umatiyu 23 >

1 Yeso mawuzi we tize, magu.
Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye:
2 Anu dungara wa taurat nan nanu bezi uru wa tonno u turi umu sa.
« Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.
3 Barki anime, tarsani i wuzi vat imumbe sa wabuka shi, kati i wuzi imum sa wazin nu wuzame ba.
Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te.
4 Wake wa caniwwe cira ugittak, ujas uhanna, wacana anu uni agirza we acece awe wadake wa hana ba.
Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.
5 Vat biwuza wuza buwe aje anu ani, wabara iliya idandang in ti di bi tuwe u tuzo adizi.
Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango.
6 Wa nyara ticukum ti gan can a hiri agab, nan tihira titi cukum ti hu ma udenge Asere.
Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani;
7 A issiziwe ati hira tini gura, agussin we anu dungara.
balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›
8 Kati hem a gussin shi anu dungara ba, barki unu dungara ushime u inde mani vat tu shi ni henu nini.
Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.
9 Kati ititi uye acoo anyimo unee, barki acoo u inde mani asesere.
Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.
10 Kati atiti shi anu tarsan nanu wani ba unu tarsan na nu memani yeso.
Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.
11 De sa mazi unanu anyimo a shi me mani urere.
Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.
12 Vat desa m yeze nice nume, adituzo me, desa ma tuzo nice adi yeze me.
Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
13 Shi wono shi anime anu dungara, nan anu uyetike a nu bezizi urusa, ana mi yakorsizo tina turibize azesese ace a shi, shi dakki ya ribe ba.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
14 Shi wono shi anu dungara wataura nan nanu bezizi urusa, ana matin! ike iri imumare aneme sa anu ruma wawijo ike hunze tubunani in bi ringara bi jokon anime azin nu tara u shi.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]
15 Shi wono shi anime, anu dungara wataura, nan nanu be zizi rusa, anamalin ike tar si ti hihira nan ma rba ma dandn dang, barki unyara unu tarsa ushi cas inki ya kem ikurzo me una yimo ura. (Geenna g1067)
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo: bato ya bilongi mibale! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko. (Geenna g1067)
16 Shi wono shi, shi anu hungo arubo, shi sa igussa, vattu shi yatonizo undenge Asere imum i zoni, aname desa ma tonikon in ni mumu ihuma udenge Asere, itoni idi rime.
Mawa na bino, batambolisi bakufa miso! Bolobaka: ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
17 Shi ababana, arobo! iya ini iteki shi innu gwardang, bizinariya bini nani udenge Asere sa u zi lau.
Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba! Eloko nini eleki motuya: wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule?
18 Ike gu, kodavi matoniko innu bagadi sadi ga imum izoni. vat de sa matoni kon innu wito nice, itono idimekime.
Bolobaka lisusu: ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
19 Shi arubo iya ini iteki innu gwarndang, u sadiga uni nani ubagadi uwito sa u zi usadiga alau.
Bakufi miso! Eloko nini eleki motuya: likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule?
20 Barki anime kovi magoni kon in nu bagadi uhaya sa uzi lau nani vat inni mumbe sa ira anyimo me.
Pamba te moto oyo alapi ndayi na kombo ya etumbelo alapi yango na kombo ya etumbelo yango mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali na likolo na yango.
21 Vat desa ma tonikon innu denge Asere, matonikon me, nan desa mara anyimo me.
Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango.
22 koda vi matonikon na zesere, matonikon inn hira ati cukuno tu gomo masere.
Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango.
23 Shi wono shi anu dungara wataura nan nanu bezizi urusa, anamalin! ike isusso imum ye sere reppii? Iye yavete imumu ihuna ini kara ya taura, me ini kadure, nan imum iriri, ubeziu inko iginọ ini ya wuna inguna iwuzi, kati iceki ireba ba.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko: bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
24 Anu hungo arubo, ike i inki iruba u kwaro dan mitsil, anime ike itu be ronkoni.
Bino, batambolisi bakufa miso! Solo, bolongolaka nzinzi oyo ekweyaka na masanga na bino, kasi bomelaka shamo mobimba.
25 Shi wono shi anu dungara wa taura nan naun bezizi uru sa, anamalin! ike i kpici mamaru miso anyimo me ini madiri.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.
26 Hu urubo unu bezi urusa! tuba u kpico u mamaru miso udiku kpici anyumo me barki mataraa macukuno lau.
Mofarizeo mokufi miso! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto.
27 Shiwono shi, anu dungara ataura nan nanu bezizi urusa, anamalin! kasi mucau sa a humuka muni, amatara anyimo me a ubo ani zenzen.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe: emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.
28 Aje shi ana huma wani, iye a nyimoo malin mani in katuma kaburu.
Ndenge moko mpe mpo na bino: na libanda, bomonanaka lokola bato ya sembo na miso ya bato; kasi na kati, botondi na lokuta mpe na mabe.
29 Shiwono shi anu dungara ataura nan nanu bezizi urusa, anamalin! ike i bari tikura a mu cau manu dang akatuma ka sere, ibara tihira.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo.
30 Igusa da ta cukuno uganiya acokoro aru utuba, sa daki ta benkuwe u kwon gizo umaye manu adang akatuma.
Bolobaka: ‹ Soki tozalaki na bomoi na tango ya bakoko na biso, tolingaki kosangana te elongo na bango mpo na kotangisa makila ya basakoli. ›
31 A anime ya bezi ace ashi, she wani ahana uhuza ana katuma kadang ka sere.
Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.
32 Ba mincikinani katuma kacokoro ashime.
Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli!
33 Shi iwa! aneni idi sumi u gwari ka anyimo ura. (Geenna g1067)
Bino, banyoka, libota ya bitupa! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo? (Geenna g1067)
34 Barkin anime ma tuman shi ana katuma kadang kasere, nan nanu urusa imum, nan anu rusa atau ra, idi huzi aye awe i gankirka aye, icobi aye suwe ti pin tipin, in nu mnsa uwe u zitto.
Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,
35 Barki nihaiki ni maye manu nanni ruba ubenki a kponkoni unee, makuro ace ashi uzi ka umaye mahabila unu uriri uhana uma zakariya unu barikiya, desa ya hu atii udenge Asere.
mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.
36 Kadure inboshi, vat agimo me adi kem anu ganiya ugeme.
Nazali koloba na bino penza ya solo: etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
37 “Shi ananu u urshalima! ananu urshalima anu huzza ana katuma ka dang kasere, anu vingizi an de sa atuma ahira ashi! ka ka hono kani manyara in orso shi kasi bi tukuru sabike bi orso ahana anyimo ama gawre mabini!
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki!
38 Iyenne aceki shi akura anime.
Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama.
39 In bossi shi, idaka ira miba, senke ronobesa ya guna, biringara bi cukuno ahira unu ezen ni za ni gomo sere.”
Pamba te, nazali koloba na bino: Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba: ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! › »

< Umatiyu 23 >