< Levitico 13 >

1 L’Eterno parlò ancora a Mosè e ad Aaronne, dicendo:
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 “Quand’uno avrà sulla pelle del suo corpo un tumore o una pustola o una macchia lucida che sia sintomo di piaga di lebbra sulla pelle del suo corpo, quel tale sarà menato al sacerdote Aaronne o ad uno de’ suoi figliuoli sacerdoti.
« Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.
3 Il sacerdote esaminerà la piaga sulla pelle del corpo; e se il pelo della piaga è diventato bianco, e la piaga appare più profonda della pelle del corpo, è piaga di lebbra; e il sacerdote che l’avrà esaminato, dichiarerà quell’uomo impuro.
Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.
4 Ma se la macchia lucida sulla pelle del corpo e bianca, e non appare esser più profonda della pelle, e il suo pelo non è diventato bianco, il sacerdote rinchiuderà per sette giorni colui che ha la piaga.
Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo.
5 Il sacerdote, il settimo giorno, l’esaminerà; e se gli parrà che la piaga si sia fermata e non si sia allargata sulla pelle, il sacerdote lo rinchiuderà altri sette giorni.
Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo.
6 Il sacerdote, il settimo giorno, lo esaminerà di nuovo; e se vedrà che la piaga non è più lucida e non s’è allargata sulla pelle, il sacerdote dichiarerà quell’uomo puro: è una pustola. Quel tale laverà le sue vesti, e sarà puro.
Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.
7 Ma se la pustola s’è allargata sulla pelle dopo ch’egli s’è mostrato al sacerdote per esser dichiarato puro, si farà esaminare per la seconda volta dal sacerdote;
Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu.
8 il sacerdote l’esaminerà; e se vedrà che la pustola si è allargata sulla pelle, il sacerdote lo dichiarerà impuro; è lebbra.
Soki amoni ete kolokoto epanzani na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na bokono ya maba mpe azali mbindo.
9 Quand’uno avrà addosso una piaga di lebbra, sarà menato al sacerdote.
Soki moto azwi bokono ya maba, basengeli komema ye epai ya Nganga-Nzambe.
10 Il sacerdote lo esaminerà; e se vedrà che sulla pelle c’è un tumor bianco, che questo tumore ha fatto imbiancare il pelo e che v’è nel tumore della carne viva,
Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,
11 è lebbra inveterata nella pelle del corpo di colui, e il sacerdote lo dichiarerà impuro; non lo rinchiuderà, perché è impuro.
wana elakisi ete ezali bokono ya maba ya libela kati na poso ya nzoto na ye, mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo. Ekozala na tina te kotia ye na esika oyo akozala ye moko, pamba te emonani ete azali mbindo.
12 E se la lebbra produce delle efflorescenze sulla pelle in modo da coprire tutta la pelle di colui che ha la piaga, dal capo ai piedi, dovunque il sacerdote guardi,
Kasi soki bokono na ye ya maba ebimisi bambuma ya mike-mike na poso ya nzoto na ye mobimba, kobanda na moto kino na makolo, na bisika nyonso oyo Nganga-Nzambe akoki kotala,
13 il sacerdote lo esaminerà; e quando avrà veduto che la lebbra copre tutto il corpo, dichiarerà puro colui che ha la piaga. Egli è divenuto tutto quanto bianco, quindi è puro.
Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.
14 Ma dal momento che apparirà in lui della carne viva, sarà dichiarato impuro.
Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota.
15 Quando il sacerdote avrà visto la carne viva, dichiarerà quell’uomo impuro; la carne viva è impura; è lebbra.
Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo: ezali bokono ya maba.
16 Ma se la carne viva ridiventa bianca, vada colui al sacerdote, e il sacerdote lo esaminerà;
Mpe soki bapota oyo efungwami ekomi lisusu pembe, moto yango akozonga lisusu epai ya Nganga-Nzambe
17 e se vedrà che la piaga è ridiventata bianca, il sacerdote dichiarerà puro colui che ha la piaga: è puro.
mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te.
18 Quand’uno avrà avuto sulla pelle della carne un’ulcera che sia guarita,
Soki moto moko abelaki bibon mpe yango ekawuki;
19 e poi, sul luogo dell’ulcera apparirà un tumor bianco o una macchia lucida, bianca, tendente al rosso, quel tale si mostrerà al sacerdote.
bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.
20 Il sacerdote l’esaminerà; e se vedrà che la macchia apparisce più profonda della pelle e che il pelo n’è diventato bianco, il sacerdote lo dichiarerà impuro; è piaga di lebbra che è scoppiata nell’ulcera.
Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.
21 Ma se il sacerdote, esaminandola, vede che nella macchia non ci sono peli bianchi e che non è più profonda della pelle e non è più lucida, il sacerdote lo rinchiuderà sette giorni.
Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
22 E se la macchia s’allarga sulla pelle, il sacerdote lo dichiarerà impuro; è piaga di lebbra.
Sima na yango, soki Nganga-Nzambe amoni ete lipalata yango epanzani na poso ya nzoto, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
23 Ma se la macchia è rimasta allo stesso punto e non si e allargata, è la cicatrice dell’ulcera, e il sacerdote lo dichiarerà puro.
Kasi soki lipalata yango epanzani te, wana elakisi ete ezali bobele elembo ya pota ya bibon; mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na ye mbindo te.
24 Quand’uno avrà sulla pelle del suo corpo una bruciatura cagionata dal fuoco, e su questa bruciatura apparirà una macchia lucida, bianca, tendente al rosso o soltanto bianca,
Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki,
25 il sacerdote l’esaminerà; e se vedrà che il pelo della macchia è diventato bianco e la macchia appare più profonda della pelle, è lebbra scoppiata nella bruciatura. Il sacerdote dichiarerà quel tale impuro; è piaga di lebbra.
Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu: soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota: elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
26 Ma se il sacerdote, esaminandola, vede che non c’è pelo bianco nella macchia, e ch’essa non è più profonda della pelle e non è più lucida, il sacerdote lo rinchiuderà sette giorni.
Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
27 Il sacerdote, il settimo giorno, l’esaminerà; e se la macchia s’è allargata sulla pelle, il sacerdote dichiarerà quel tale impuro; è piaga di lebbra.
Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba.
28 E se la macchia è rimasta ferma nello stesso luogo, e non si è allargata sulla pelle, e non è più lucida, è il tumore della bruciatura; il sacerdote dichiarerà quel tale puro, perch’è la cicatrice della bruciatura.
Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto.
29 Quand’un uomo o una donna avrà una piaga sul capo o nella barba,
Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga,
30 il sacerdote esaminerà la piaga; e se vedrà ch’essa appare più profonda della pelle e che v’è del pelo gialliccio e sottile, il sacerdote li dichiarerà impuri; è tigna, è lebbra del capo o della barba.
Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango: soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga.
31 E se il sacerdote, esaminando la piaga della tigna, vedrà che non appare più profonda della pelle e che non v’è pelo nero, il sacerdote rinchiuderà sette giorni colui che ha la piaga della tigna.
Nzokande, soki Nganga-Nzambe amoni ete poso ya nzoto ebimisi na yango bapota te, atako bapwale ezali kaka ya mwindo, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
32 E se il sacerdote, esaminando il settimo giorno la piaga, vedrà che la tigna non s’è allargata, e che non v’è pelo giallo, e che la tigna non appare più profonda della pelle,
Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu poso: soki bokono yango epanzani te, bapwale eteli te, bapota ebimi te na poso,
33 quel tale si raderà, ma non raderà il luogo dov’è la tigna; e il sacerdote rinchiuderà altri sette giorni colui che ha la tigna.
mobeli akokokola suki na ye kasi akotika suki oyo ezali na bisika oyo bokono emonani. Bongo Nganga-Nzambe akotia lisusu mobeli na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
34 Il sacerdote, il settimo giorno, esaminerà la tigna; e se vedrà che la tigna non s’è allargata sulla pelle e non appare più profonda della pelle, il sacerdote dichiarerà quel tale puro; colui si laverà le vesti, e sarà puro.
Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu bokono yango ya poso ya nzoto: soki epanzani te mpe ebimisi bapota te, Nganga-Nzambe akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo te. Boye mobali to mwasi yango akosukola kaka bilamba na ye mpe akokoma peto.
35 Ma se, dopo ch’egli e stato dichiarato puro, la tigna s’è allargata sulla pelle,
Nzokande, atako Nganga-Nzambe asili koloba ete mobali to mwasi wana azali peto kasi soki bokono yango epanzani ye kaka na poso ya nzoto,
36 il sacerdote l’esaminerà; e se vedrà che la tigna s’è allargata sulla pelle, il sacerdote non cercherà se v’è del pelo giallo; quel tale è impuro.
Nganga-Nzambe akotala malamu: lokola bokono epanzani ye penza na poso ya nzoto, ekozala na tina te ete Nganga-Nzambe aluka lisusu koyeba soki bapwale eteli to te, pamba te mobali to mwasi yango azali penza mbindo.
37 Ma se vedrà che la tigna s’è fermata e che v’è cresciuto del pelo nero, la tigna è guarita; quel tale è puro, e il sacerdote lo dichiarerà puro.
Nzokande, soki bokono epanzani na yango te mpe bapwale ya mwindo ebimi na bisika oyo bokono ezali, wana elakisi ete mobeli abiki na bokono na ye mpe azali peto: Nganga-Nzambe akoloba ete azali peto.
38 Quand’un uomo o una donna avrà sulla pelle del suo corpo delle macchie lucide, delle macchie bianche,
Soki mobali to mwasi amoni matono ya pembe kobima na poso ya nzoto na ye,
39 il sacerdote l’esaminerà; e se vedrà che le macchie sulla pelle del loro corpo sono di un bianco pallido, è una eruzione cutanea; quel tale è puro.
Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te: moto yango azali peto.
40 Colui al quale son cascati i capelli del capo è calvo, ma è puro.
Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo.
41 Se i capelli gli son cascati dalla parte della faccia, è calvo di fronte, ma è puro.
Soki suki yango ekataneli ye na mbunzu, bongo akomi na libandi, wana elakisi ete azali peto.
42 Ma se sulla parte calva del di dietro o del davanti del capo appare una piaga bianca tendente al rosso, è lebbra, scoppiata nella parte calva del di dietro o del davanti del capo.
Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi.
43 Il sacerdote lo esaminerà; e se vedrà che il tumore della piaga nella parte calva del di dietro o del davanti del capo è bianca tendente al rosso, simile alla lebbra della pelle del corpo,
Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi.
44 quel tale è un lebbroso; è impuro, e il sacerdote lo dovrà dichiarare impuro; egli ha la sua piaga sul campo.
Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto.
45 Il lebbroso, affetto da questa piaga, porterà le vesti strappate e il capo scoperto; si coprirà la barba, e andrà gridando: Impuro! impuro!
Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga: ‹ Mbindo! Mbindo! ›
46 Sarà impuro tutto il tempo che avrà la piaga; è impuro; se ne starà solo; abiterà fuori del campo.
Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako.
47 Quando apparirà una piaga di lebbra sopra una veste, sia veste di lana o veste di lino,
Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme
48 un tessuto o un lavoro a maglia, di lino o di lana, un oggetto di pelle o qualunque altra cosa fatta di pelle,
to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,
49 se la piaga sarà verdastra o rossastra sulla veste o sulla pelle, sul tessuto, o sulla maglia, o su qualunque cosa fatta di pelle, è piaga di lebbra, e sarà mostrata al sacerdote.
soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu.
50 Il sacerdote esaminerà la piaga, e rinchiuderà sette giorni colui che ha la piaga.
Sima na Nganga-Nzambe kotala yango malamu, akotia yango na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
51 Il settimo giorno esaminerà la piaga; e se la piaga si sarà allargata sulla veste o sul tessuto o sulla maglia o sulla pelle o sull’oggetto fatto di pelle per un uso qualunque, è una piaga di lebbra maligna; è cosa impura.
Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo.
52 Egli brucerà quella veste o il tessuto o la maglia di lana o di lino o qualunque oggetto fatto di pelle, sul quale è la piaga; perché è lebbra maligna; saran bruciati col fuoco.
Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te: basengeli kotumba yango.
53 E se il sacerdote, esaminandola, vedrà che la piaga non s’è allargata sulla veste o sul tessuto o sulla maglia o sull’oggetto qualunque di pelle,
Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,
54 il sacerdote ordinerà che si lavi l’oggetto su cui è la piaga, e lo rinchiuderà altri sette giorni.
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
55 Il sacerdote esaminerà la piaga, dopo che sarà stata lavata; e se vedrà che la piaga non ha mutato colore, benché non si sia allargata, è un oggetto immondo; lo brucerai col fuoco; v’è corrosione, sia che la parte corrosa si trovi sul diritto o sul rovescio dell’oggetto.
Sima na kosukola yango, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono; soki amoni ete ebongwani te mpe epanzani na yango te, wana elakisi ete elamba ezali mbindo mpe esengeli kotumba yango na moto: ezali elamba oyo ebebi na liboso mpe na sima.
56 E se il sacerdote, esaminandola, vede che la piaga, dopo essere stata lavata, è diventata pallida, la strapperà dalla veste o dalla pelle o dal tessuto o dalla maglia.
Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali.
57 E se apparisce ancora sulla veste o sul tessuto o sulla maglia o sull’oggetto qualunque fatto di pelle, è una eruzione lebbrosa; brucerai col fuoco l’oggetto su cui e la piaga.
Soki sima na mwa tango, litono yango ezongi lisusu, wana elakisi ete ezali bokono ya maba oyo ezali kokola. Boye esengeli kotumba na moto eteni oyo ezali na litono na elamba.
58 La veste o il tessuto o la maglia o qualunque oggetto fatto di pelle che avrai lavato e dal quale la piaga sarà scomparsa, si laverà una seconda volta, e sarà puro.
Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »
59 Questa è la legge relativa alla piaga di lebbra sopra una veste di lana o di lino, sul tessuto o sulla maglia o su qualunque oggetto fatto di pelle, per dichiararli puri o impuri”.
Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.

< Levitico 13 >