< Salmi 15 >
1 Signore, chi abiterà nella tua tenda? Chi dimorerà sul tuo santo monte? Salmo. Di Davide.
Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule?
2 Colui che cammina senza colpa, agisce con giustizia e parla lealmente,
Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye;
3 non dice calunnia con la lingua, non fa danno al suo prossimo e non lancia insulto al suo vicino.
oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te;
4 Ai suoi occhi è spregevole il malvagio, ma onora chi teme il Signore. Anche se giura a suo danno, non cambia;
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te;
5 presta denaro senza fare usura, e non accetta doni contro l'innocente. Colui che agisce in questo modo resterà saldo per sempre.
asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.